Luka

Frassati na Acutis balobi ‘te esengeli te kobebisa bomoi bwa biso libándá lya mokano mwa Nzambe

Na loyenge la festi monene na Esika Saint-Pierre oyo etondaki na bato nkoto tuku mwambe (80.000 personnes), mpe na zingazinga na yango, Pápa Léon XIV akambaki misa ya boluboli bwa bilengi Ba-Esengo mibale, Pier Giorgio Frassati mpe Carlo Acutis. Na mateya ma ye, abengaki bana ba Nzambe «bábebisa bomoi bwa bango te, kasi bátiya yango na esika ya liboso mpe básalela yango lokola eloko ya motuya».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa lomingo, mwa 7 Setembe, na lopango la ndako-nzambe monene ya Saint-Pierre, Pápa Léon XIV akambaki molulu ya Ukaristya mpe ya boluboli ya Ba-Esengo mibale, Pier Giorgio Frassati mpe Carlo Acutis.

Kobima ya mbalakaka yambo ya milulu

Yambo ‘te misa ebanda, Pàpa baimaki na mbalakaka liboso lya Saint-Pierre mpo ya kopesa mbote na bakristu bayaki bipai na bipai ya mokili. Nakomono bango, bazalaki, Bilenge na bana, mabota ya Ba-Esengo mibale, batomà (to batindami); ba episkopo nà banganga-nzambe, ba sàngo nà bamamelo, bato ya ba actions katoliki. Léon azwaki maloba mpe alimbolaki ‘te : « molulu moye monene ya boluboli», ezali mokolo monene “mokolo mwa eyenga mpo na ekolo ya Italie, mpo na eklezya mobimba mpe mpo na mokili mobimba

Kobima ya Pàpa na mbalakaka, yampo te misa ebanda
Kobima ya Pàpa na mbalakaka, yampo te misa ebanda   (AFP or licensors)

Na yango abyangi bandimi bakristu na kokoto o bozindo bwa molulu monà na losambo, motema polele, mpe na bosengà ya kozwa solo ngrasya eye ya Mokonzi. Abakisaki ‘te : «banso toyoka ontei ya mitema mya biso, maye Giorgio et Carlo bayokaki na bomoi bwa bango, ndé bolingo mpo na Yezu-Kristu, mingi mpenza na Ukaristya. Kasi toyoka esengo enà mpe mpo na babola, na bandeko babiso babali mpe ya basi». Asukisaki na koloba ‘te, «banso to byangemi na kozala basantu».

Molulu moko mwa esengo

Boluboli bwa Ba-Esengo mibale, Pier Giorgio Frassati mpe Carlo Acutis, elekaki na popepe ya malamu mpe na limemya ya milulu ya losambo oyo ebongisamaki mpo na libakù liye: nsima ya loyembo la ‘Veni Creator’ na ebandela ya misa, Prefet ya dicastère ya Causes des Saints, episkopo wa lokùmu Marcello Semeraro, alakisaki Pàpa Léon XIV mokanda mpo na kosénga ‘te bàkóma basantu mpe atángaki na bokuse lisolo ya bomoi bwa basantu, moko na moko. Elandaki sima litani ya basantu, bongo Pàpa alobaki maloba mya boluboli.

Misa ya Boluboli bwa Ba-Esengo babale , Pier Giorgio Frassati nà Carlo Acutis
Misa ya Boluboli bwa Ba-Esengo babale , Pier Giorgio Frassati nà Carlo Acutis   (ANSA)

Kolanda Kristo nakomeme kuruze ya yé

Mokakatano monene ya bomoi bwa moto, ezali ya kobebisa yango na libándá lya elakà ya Nzambe”. Pàpa alakisaki basantu biye babale ya sika lokola bilenge oyo bazali koluka bwanya (mayele) bwa Nzambe mpo na koyeba mikano mya ye mpe kolanda yango na bosembo inso.

Kobanda na makomi mya milulu mwa mokolo mwa lomingo la tuku mibale ya mobù C,(23ème dimanche du temps ordinaire C), Léon XIV abimisaki mwango mwa Yesu, oyo esengeli koyamba o motema mobimba ‘te: “Moto oyo amemi kuruze ya ye te mpe alandi ngai te, akoki kozala moyekoli mwa ngai te”. Mpe lisusu; “moto oyo kati na bino aboyi kotika biloko bya yé binso, akoki kozala moyekoli mwa ngai te”. Mokano moye, mozali mbela mpo na biso ‘te “tótika biso moko, makambo mpe makanisi oyo tokangami na yango, mpo na kotosa liloba lya ye”.

Bazongisaki “iyo” na Nzambe, atako bazalaki naino bilenge

Na ndakisa ya Santu François ya Assizi, Pápa alimbolaki ‘te “na boumeli ya bikeke, bilenge mingi bakutanaki na likambo ya ntina mingi, nde kokamata mokano mpo na bomoi na bwa bango”. O kati ya bango, tozali na basantu basi mpe babali oyo mbala mosusu “tozwaka bango lokola bato minene, nzokandé to kobosanaka ‘te makambo manso mabandaki mpo na bango, ntango bayanolaki “iyo” na Nzambe, ntango bazalaki naino bilenge, mpe bamipesaki mobimba na Ye, babombaki eloko moko te mpo na bango moko”. Léon abeti nsete na kopesa ndakisa ya Santu Augustin, mpe alobi ‘te: “ezali nde iyo ena ekolakisa nzela ya sika, mokano mwa sika mpe makanisi masika”, epai wapi ata eloko moko te ya bomoi bwa bango ebungisamaki

Frassati nà Acutis : balingami babale ya Yezu

Elenge mobali ya liboso azali elenge mobali moko oyo azalaki na bomoi na ebandeli ya ekeke tuku mibale (XXè siècle). Bongo elenge ya mibale,  azali elenge mobali moko ya mikolo mya biso miye. Pàpa alobi ‘te bango mibale, moko nà mosusu, “balingi Yesu makasi mpe bazali pene ya kopesa nyonso mpo na Ye”. Mpe alimboli ‘te elenge batangi liboso, Frassati, “akutanaki na Mokonzi na nzela ya eteyelo mpe ya bituluku ya mangomba. Amonisaki esengo ya yé na kozala mokristu na bomoi bwa ye mpe na nzela ya losambo to mabondeli, na bondeko mpe bolingo”. Bomoi bwa ye bokomi “mwinda to pole mpo na bomoyi ya mokili” mpamba te, na nguya ya Nsango-Elamu, elenge Frassati amipesaki mingi na société, apesaki lisungi na ye na politiki mpe amipesaki na mosala ya babola.

Mp ona Elenge Carlo; yé akutanaki na Yezu na libota na ye, na nzela ya baboti na ye, na eteyelo, mpe mingimingi na misa. Ntango azalaki kokola, “na bomwana mpe na bolenge bwa ye, azalaki na momeseno ya kosambela to kobondela, kosala masano, koyekola mpe kosala misala ya bolingo malamu”.

Bomoi boye botambwisami na bolingo mpo ya Nzambe mpe mpo ya bandeko

Pápa alobaki ‘te basantu baye babale “bakolisaki bolingo mpo ya Nzambe mpe mpo na bandeko ba bango, na nzela ya makambo ya mike mike mpamba, oyo moto inso akoki kosala: Misa ya mokolo na mokolo, losambo to libondeli, mingi mpenza kogumbamela Ukaristya”. Mpo na komonisa ‘te basantu baye bazalaki kobondela ntango inso, episkopo wa Roma atángaki maloba ma nguya oyo basantu baye babale ya sika balobaki. Mpo na Carlo: “Na nsé ya moi, moto akokoma na mposo ya nzoto ya bronze. Liboso lya Ukaristya, moto akokoma mosantu”.

Motema mawa, ezali komitalela yo moko, kasi esengo, ezali kotala epai na Nzambe. Kobongwana ezali eloko mosusu te kasi kobalusa miso mya biso kobanda na nsé kino etombwami o likolo. Kaka mwa movema ya kobalusa miso ekoki”.

Mpo na Frassati: “Pembeni ya babola mpe bakoni (bato na maladi), ngai nakomonaka mwinda oyo biso tozali na yango te”, “moboko ya boyambi bwa biso”.

Molingi sakramentu ya bomipima

Pápa amonisaki mpe ‘te bango mibale bazalaki kotalela: “kotubela masumu mbala na mbala” lokola likambo ya ntina mingi (eloko ya motuya mpenza). Mpo na yango, akanisi lisusu oyo, Carlo akomaki: “Likambo moko kaka, oyo tosengeli mpenza kobanga ezali lisumu”. Ezali likambo ya kokamwa ‘te “bato batiyaka likebi mingi na kitoko ya nzoto na bango kasi bakomitungisa te na kitoko ya molimo mwa bango”.

Na nsuka, episkopo wa Roma alobaki ‘te bango babale “bazalaki na bolingi monene mpo na basantu mpe mpo na Ngondo Maria. Bongo bazalaki kosala bikela bilamu ya bolingo” oyo basalaki kino nsuka ya bomoi bwa bango ya bolenge. Bango nyonso bandimaki kokufa na kimya mpenza. Pier Giorgio azalaki koloba ‘te mokolo mwa liwa na ye ekozala mokolo kitoko koleka na bomoi bwa ye, nzoka nde Carlo, oyo azalaki elenge koleka, azalaki kolinga koloba ‘te: “Likolo ezali kozela biso banda kala”, mpe ‘te “kolinga lobi ezali kopesa lelomei oyo eleki malamu ya bomoi bwa biso”.

Kobebisa bomoyi te, kasi kokomisa yango eloko ya motuya

Pàpa asukisaki mateya ma ye na kobenga bakristu, mingi mpenza bilenge, balanda ndakisa ya basantu Pier Giorgio Frassati mpe Carlo Acutis, oyo babebisaki bomoi na bango te, kasi batombwisaki yango mpe bakómisaki yango eloko ya motuya. Alobaki ete, basantu baye, bazali kolendisa biso na maloba ma bango, tótiya Nzambe na esika ya liboso na misala mya biso nyonso. Yango ezali lolenge ya pete, kasi ya elonga, ya bosantu bwa bango. Pape abyangi bakristu balanda ndakisa (litatoli) eye, “mpo na koyoka esengo ya bomoi bwa biso mobimba mpe kokende kokutana nà Mokonzi esengo ya lola”.

2025-09-07: Boluboli bwa Ba-Esengo Pier Giorgio Frassati nà Carlo Acutis
2025-09-07: Boluboli bwa Ba-Esengo Pier Giorgio Frassati nà Carlo Acutis   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

07 sánzá ya libwa 2025, 14:51