Léon XIV asengi ba Carmes bazala banzeneneke ya bomoko kati na masàngà ya bato biye bikabwani
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
«Nazali kobondela ‘te bokangama na bondeko na bacommunautés na bino, bongo ekomonisa likabo ya bomoko, mingi mingi na biteni ya société oyo ekatani bokabwani mpe kopusa baninga mosika». Wana ezali ndé maloba ya bolendisi oyo Pápa apesaki na bayangani ya likita monene ya lingomba ya Carmel. Likita liye libandaki o mokolo mwa libwa, mpe ekoumela kino mokolo mwa 26 ya sànzà ya setembe (du 9 au 26 Septembre) na Malang, na esanga ya Java, na ekolo Indonésie. Kati na liyebisi oyo atángaki na mokolo ya mibale na ebandeli ya likita, na mokanda oyo atindelaki Père Míċeál O'Neill, mokonzi ya eklezya ya Katoliko, o mokolo mwa mitano ya sànzà ya Agusto (5 Aoùt), alimbolaki ‘te likanisi-mokonzi (le thème) oyo baponi mpo na likita na bango, ezali : «Lisanga na biso ya bandeko babali ezali kososola mpo na etindà na yango».
Mpo ezali kolakisa lolenge kani «losambo tozali kokabola elongo» ezali «ntina» ya «mosala mwa bango mpo na Eklezia mpe na mokili». Pápa alobi ‘te : Tango bozali «kotiya misisa na kati ya losambo na bonkuku mpe na likebi bozali kotiyelana bino na bino, bozali kolona boboto oyo ezali kopesa bino makoki ya kososola bilembo ya bileko biye, mingi mingi na nzela ya kokanisa babola, mpe ya koyanola yango nzela ya bolingo».
Tómonisa bolingo bwa Kristu na misala mya biso
Léon XIV atangi mobeko ya Carmel oyo elendisi na «kosala mwa eloko» mpe amonisi ‘te «ezali na ndimbola ya bozindo» na mosala mwa lingomba liye, mpamba te, ezali kobengisa na «kozala miso ma bolingo bwa Kristu, oyo akoyamba moto inso na motema mawa mpe na boboto». Esengeli kosalema na nzela ya koteya na bisika ya bopemi, na nzela ya lisungi ya molimo, na nzela ya mosala ya paloase to na nzela ya mateya mpo na bilenge. Papa alingi ‘te ba Carmes bazala ndakisa ya bolingo mpe ya bomoko na mokili oyo mbala mingi etondi na mitungisi mpe matata.
Na nsuka, Pápa apesi likita la bango na maboko mpe lisungi ya Notre-Dame du Mont Carmel mpo ‘te likita liye, oyo ekosalema na boumeli ya Mobu Mosantu ya elikya, eleka na malamu mpe «ekóma libakù ya kozonga bato basika na molimo».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
