Luka

Likita ya banso ya mokolo ya misato ya 17 ya sanza ya libwa Likita ya banso ya mokolo ya misato ya 17 ya sanza ya libwa  (@VATICAN MEDIA)

Léon XIV: “atá na lilita, Nzámbe akobongisa likambo mókó ya kokámwa ya monene"

Na botelemi na mobombano ya Póso Esántu, episkopo ya Roma, na malongi na ye ya likita ya bansó ya mokolo ya misáto 17 ya sánzá ya libwá, atálaki Mwána ya Nzámbe oyo akopema na lilita, elanga ena, elobaki ye, ekokundola Eden ebúnga, esika wápi Nzámbe pe moto bazalaka lisangá.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Papá Léon XIV atelemaki mingi na mobombano ya Póso Esántu, na botáli Mwána ya Nzámbe oyo akopema na lilita. « Bozali te » mókó, elobaki ye, eye “elingi koloba te ‘te eloko ezali te: ezali bozeli, elaka mókó ebombani na molili ». Mokolo eye ya kimia monéne, esika wápi likoló ekomónana lokóla ebúbú pe mabelé ekoningána te, ezali penza eye ya bokokisi « mobombano ya mozindo ya boyambi ya mokristu ». Po ya Papá, kimia ena ya kilo, ezali « lokóla libéle ya mama mókó eye akobatela mwána na ye nanu abótami te, kasi azali na bomoi »

« Elekeli mókó, kasi súka mókó te »

Papá wa Roma alimbolaki ‘te nzóto ya Yézu, ekitisamaki na kurúse, ezingamaki malamu, libosó ekundama na elanga mókó. Elanga ena, ekobaki ye, ezali « lilita mókó ya sika eye bakundaka nanu moto te ». Eloko mókó etikalaki pamba te, ebakisaki Papá na bolobi ‘te « elanga ena ekokundola Eden eye ebúnga, esika wápi Nzámbe pe moto bazalaki lisangá ». Pe lilita ena basálela yangó te « ekoloba eloko mókó eye esengeli lisusu kokóma: ezali elekeli mókó, kasi súka mókó te. O libandela ya bokelami, Nzámbe akonaki elanga mókó, sik’oyo bokelami ya sika ebándi lokóla na elanga mókó: na lilita mókó ekangemi eye, kala te, ekofúngwama », etéyaki Léon XIV.

Bopemi mókó elongobami !

Póso Esántu ezali lokóla mokolo mókó ya bopemi, elobaki lisusu Papá na bolakisi ‘te engebene na Mobéko ya ba Yúda, esengelaki te kosála mokolo ya sambo po simá ya mikolo motóba ya bokeli, Nzámbe apemaka. Papá wa Roma alimbolaki ‘te Mwána lokóla, simá ya mosála na ye ya libiki, apemi.

““Ezali po alembi te, kasi po asilisi mosála na ye. Ezali po atikaki te, kasi po alingaki yangó kinó na súka. Ezali na eloko ya kobakisa te. Bopemi ena ezali elembo ya mosála esili, bondimi ‘te eye esengelaki kosálema ekómaki ya sóló kinó na súka. Ezali na bopemi mókó etondi na bozali ya kobombana ya Nzámbe”.”

Episkopo ya Roma alendisi na kolinga bopemi: “Tozali na pási ya kotelema pe ya kopema. Tokobika lokóla sóki bomoi ekoka te. Tokokima po ya kobimisa, po ya kolakisa, po ya kobúngisa esika te. Kasi Nsango-Ndamu ekotéya bisó ‘te koyeba kotelema ezali eloko mókó ya botiyi motéma eye tosengeli koyekola kosála”. Póso Esántu, elobaki ye, ekobenga biso ya komóna ‘te bomoi ekotála kaka eye tozali kosála te, kasi lokóla ndéngé toyébi kotika eye tokokaki kosála.

Bomoi ekobótama na kimia

Na lilita, Yézu, Liloba ya bomoi ya Tatá akangi monoko, elobaki Papá oyo abákisi ‘te ezali penza na « kimia nde bomoi ya sika ebandi kobótama. Lokóla mbóto mókó na mabelé, lokóla molili libosó ya tongo ». Nzámbe akobanga ngonga ezali koleka te po azali pe Mokónzi ya bozeli, alobaki na bobakisi ‘te atá tango na bisó ya « tina te », eye ya ba bopemi, ya eloko te, ekoki kokóma libéle ya nsekwa. Kimia nionso, ebákisaki ye, ekoki kozala ebandeli ya Liloba ya sika. Lokóla, eleko nionso ekatami ekoki kokóma ngonga mókó ya ngolu, soki topesi yangó na Nzámbe.

Botiyi motéma, atá sóki nionso emónani lokóla esili

Léon XIV alakisi ‘te Yézu, akundami na mabelé, ezali elongi ya péte ya Nzámbe mókó oyo akangi esika nionso te. Azali Nzámbe eye akotika esálema, oyo akomilongola po kotikela bisó bonsómi. Azali lokóla Nzámbe oyo akotia motéma, atá sóki nionso emónani lokóla esili. Papá abengaki na loléngé ena bato ya mobémbo mwa boyambi ya koyékola ya “kowelela te po na kosekwa: esengeli libosó libosó kotikala, koyamba kimia, kotika bisó koyamba na ndelo”. Episkopo wa Roma akebisaki na likambo ya boluki biyano na lombangu, biyano ya sik’oyo, kasi ya komóna ‘te “Nzámbe akosála na mozindo, na eleko malembe ya botiyi motéma”. Póso ya bokundi, elobaki ye, “ekómi lokóla libéle esika wápi ekoki kobima bokasi ya mwinda mókó ekobéba te, eye ya Pasika”.

Elikya ya mokristu ekobótama na kimia

Elikya ya mokristu ekobótama na makelele te, kasi na kimia ya bozeli mókó ezuami na bolingo. Ezali mwána ya mwási ya esengo te, kasi ya botiki na botiyi motéma”, elimbolaki Papá libosó ya kopesa ndakisa ya Ngondo Maria oyo “akolakisa bozeli ena, botiyi motéma ena, elikya ena”. Tángo ekomónana ‘te nionso ekoningana te, ‘te bomoi ezali nzelá mókó ekatana, tokundolaka Póso Esántu, elendisaki ye na bosemboli ‘te “atá na lilita, Nzámbe akobongisa likambo mókó ya kokámwa mingi. Pe sóko toyébi koyamba na esengo eye ezalaki, tokomóna ‘te, penza na moke pe na kimia, Nzámbe alingi kobalusa eye ezali, na bokomisi biloko nionso na loboko ya bolingo na ye”. Na bosúkisi malongi na ye, Papá wa Roma alobaki ‘te esengo ya sóló ekobótama na bozeli ezuami, na boyambi eye ekozela, na elikya eye esálemaki  na bolingo, ya sóló, ekosekwa na bomoi ya seko.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

17 sánzá ya libwa 2025, 16:59