Likita lya bansó: “Liwá ezali na liloba ya súka te”
Jean-René Bompolonga – Kinshasa
Libosó ya bato ebelé ya mobémbo mwa boyambi basangani na esika ya Sántu-Petelo, Papá wa Roma akobaki, na malongi na ye, molongó ya litéya etali “Yézu-Kristu elikya na bisó”. Azongelaki mobombano ya Póso Esántu. Po ya Léon XIV, ezali “mokolo mókó ya Mobombano ya pasika esika wápi nionso ekomónana lokóla etelemi pe kimia, nzókandé na bosóló, ekosalema likambo ebombana ya libiki: “Kristu akiti o limbé po ya kosakola Nsékwa na baye bansó bazalaki na molili pe na elilingi ya liwá”. Likambo ena eye nzebi ya mambi ma nsámbo pe momeseno batikela bisó, ekolakisa “likambo ya mozindo pe ya súka ya bolingo ya Nzámbe po ya bomoto”. Na botali mwángo ya biblia, Papá alakisaki ‘te “lifelo ezali penza te esika mókó kasi ezaleli mókó ya kobika: ezaleli epai wápi bomoi elembisami pe esika wápi pási, bozali yo mókó, kondima mabé pe bokabwani na Nzámbe pe basusu mizali”.
Bokitisi mókó ya libiki
“Kristu akómeli bisó atá na káti ya libúlú, na boleki bizibeli ya bokonzi ya molili. Akóti, po na bolobi, na ndáko penza ya liwá, po ya kosilisa yangó, po ya kopesa bonsómi na bato, na bozui bangó o loboko mókó mókó”, elobaki episkopo ya Roma na bosakoli ‘te “ezali bomikitisi ya Nzámbe mókó oyo atelemaka te libosó ya lisúmu na bisó, oyo akobánga te na bobwaki ya koleka ya moto”.
Kasi, bokitisi ena ya Kristu etáli kaka eye eleka te, kasi ekosimba bomoi ya mókó mókó na bisó, elakisaki Sántu-Papá. “Lifelo ezali kaka ezaleli ya oyo akúfi te, kasi lokóla “ya oyo akobika liwá likoló ya mabé pe ya lisúmu”. “Ezali lokóla lifelo ya mokolo na mokolo ya bozali yo mei, ya nsoni, ya botiki, ya pási ya bomoi”. Kristu akokóta na maye mansó ya bosóló ya molili po na kotatola po ya bisó bolingo ya tátá. Kaka po ya kosámbisa te, kasi po ya kopesa bonsómi, elobaki ye.
Na mansó, “bokiti, po ya Nzámbe, ezali eseke te, kasi bokokisi ya bolingo na ye. Ezali nzelá eye akolakisa ‘te esika mókó te ezali mosika mingi, motéma mókó te ekangemi mingi, lilita mókó ekangemi makási po ya bolingo na ye. Waná ekobondo bisó, ekolendisa bisó”, esepelaki Papá. “pe sóki tango mosusu tomóni tokómi na súka, tokundola ‘te waná nde Nzámbe akoki kobanda ekelamu mókó ya sika”, etéyaki Papá wa Roma.
Póso Esántu, mokolo ya bolakisi mawa ya Nzámbe
Bôngó, Póso Esántu ezali “mokolo epai wápi likoló ekotála mabelé na mozindo. Ezali eleko wápi eténi mókó mókó ya lisapo ya moto esimbami na mwinda ya Pasika”. “Pe sóki Kristu akokaki kokita kinó kuna, eloko mókó te ekoki kolongwama na mawa na ye, atá ba butú na bisó, atá ba mbéba na bisó ya kála, atá basingá mikátana ya bisó”, elobaki lisusu Léon XIV na bobakisi ‘te “ezali kála mókó te ebéba makási, ezali na lisapo mókó te etungisama eye ekoki kosimbama na mawá te”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye.
