Luka

2025.09.06 Likita lya mpo ya zubilé, ya mokolo mwa 6 setémbe 2025, liboso lya bato ba mobembo ya zubilé, nkota tukù mibale na mitano (25 000pelerins) na place Saint-Pierre 2025.09.06 Likita lya mpo ya zubilé, ya mokolo mwa 6 setémbe 2025, liboso lya bato ba mobembo ya zubilé, nkota tukù mibale na mitano (25 000pelerins) na place Saint-Pierre  (@VATICAN MEDIA)

Likita lya mpo ya zubilé : Bomoi bwa Kristu bozali bomoi boye bokongengisa elikya

O mokolo mwa Poso mwa 6 setémbe na ngonga ya 10h, na place Saint-Pierre, Léon XIV akambaki likita lya bato ba mobembo ya zubilé, nkota tukù mibale na mitano (25 000 pelerins) oyo bayaki mpo na «kokolisa boyambi, na bolingo mpe na elikya». Na mateya ma ye, Pápa alendisaki bango mpo ‘te bàluka te bisika ya kobatama mpo na kozwa bokengi to libateli, oyo ezali kolongola «mposa ya kotala ontei ya bisomei mpe ya kokela, oyo ekosala ‘te mokolo na mokolo ezala ya sika».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na lisalisi lya lisese ya eloko ya motuya kati na elanga, Pápa abyangaki bato ya mibembo ‘te «bátala lisano lya bana oyo, na mposa ya koyeba, bazali kotimola mabelé, kobuka liboke ya mabelé ya mokili». Léon XIV alimbolaki ‘te ezaleli wana ezali komonisa elikya oyo «ezongaka ntango tozali kotimola mpe kobuka libumu ya makambo oyo ezali solo, ntango tozali kokende na nse ya mabelé».

Kuruze Esantu, «bomengo ya kobatama, oyo esengeli koteka biloko binso»

Bayekoli ba Yezu bazalaki na molimo ya koluka lolenge yoko, tango kaka bazwaki bonsomi ya komonisa boyambi bwa bango lokola bakristu o miso ma bato banso. Babandaki kolukaluka, mingi mpenza bisika ya bolozi bwa ye, ya liwa mpe ya nsekwa ya ye. Mpo na episkopo ya Roma, Flavia Julia Elena, mama ya mokonzi Constantin, akokaki kozala ndakisa lokola «molimo ya bolukiluki bwa yé ». Azali mwasi oyo azali kotimola o bozindo, mpe na bokobi koluka luka ya ye, azwi kati na bomoi bwa Yesu, bomengo oyo ezali kopelisa elikya.

Na kobandela na ndakisa ya mwasi wana, Léon ya zomi na minei ( XIV) akebisaki bakristu na ntina ya komekama ya «kotia motema na biloko na biso ya motuya mpe na bomengo, ezala ya minene to ya mike, oyo ezali kopesa biso libateli » kasi ezali kolongola «esengo oyo tozalaki na yango ntango tozalaki bana mike, mposa ya kotimola mpe ya kosala biloko oyo ezali kokómisa mokolo na mokolo sika ». Kokela, ezali kokundwela, elobaki lisusu Pape oyo mbala moko alobaki ete invention monene ya « Hélène ezalaki kokundwela Kuruze Esantu », « mosolo ebombami oyo mpo na yango esengeli koteka biloko binso! » Alobaki ete, ekulusu ya Yesu ezali «boyebi ya bomoi oyo eleki monene, motuya oyo ebongoli bizaleli binso».

Kobongisa motema mwa yo ezali mosala moye mosengeli

Na kokoba kolobela «Hélène, mwasi oyo, amemaki yé moko ekulusu ya ye na boumeli ya ntango molai», Papa apesaki ye mbote ya solo ya bokristu mpe ya bolingo, oyo azalaki ntango inso koluka, «abosanaki te bato ya komikitisa oyo ye autaki na bango».

Mokitani ya Petro alobaki ‘te: «Lokumu mpe bosembo ya lolenge wana na lisosoli na ye » ezali « kobongola mokili tee lelomei » mpe « ezali komema biso penepene na eloko ya motuya, lokola mosala mwa mosali bilanga ». Kasi, maye manso makoki kosalema kaka soki moto andimi kolona o motema mwa ye. Ezali etindà monene oyo ezali kosénga milende. Mpo na Pápa, “ezali mosala oyo eleki misala nyonso. Kasi toyeba ‘te ; na tango ozali kotimolaka, okokuta, ntango okomikitisáká, okopusana lisusu penepene na Mokonzi oyo amipesaki mpo na kokóma lokola biso. Ekulusu na ye ezali na nsé yam poso ya mabele na biso”.

Tókoma lokola bana mike 

Pápa alobaki ‘te soki tosali keba te, tokoki “kotambola na lolendo, kotamboláká na bopotu inso likoló lya bomengo to eloko ya motuya oyo ezali na nsé ya makolo ma biso”. Kasi, soki “tokómi lokola bana mike, tokoyeba bokonzi mosusu, nguya mosusu”. Episkopo ya Roma amonisaki yango, mpe abakisaki ‘te “Nzambe azali tango inso na nsé ya makolo ma biso, mpo na komema biso na likoló”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

06 sánzá ya libwa 2025, 13:13