Likita ya bansó: "Toyékola bogángi ya elikya"
Jean René Bompolonga-Kinshasa
Bato ya mobémbo mwa boyambi 35.000 pe bandimi basanganaki na esika ya Sántu Petelo, balandáki na esengo likita ya bansó ya Papá. "Matondi ya kozala esika eye. Bozali na bino ezali litatoli kitoko", elobaki na koseka Léon XIV, libosó ya kokoba molongó ya malongi etáli "Yezu Kristu elikya na bisó", na botelemi leló mokolo ya 10 ya sánzá ya libwá na bileko ya súka ya Yézu na kúruse, elobami na nsango ndamu ya Malako. Na kúruse, elimbolaki Léon XIV, "Yézu akúfi na kimia te. Akokúfa malémbe malémbe te, lokóla mwinda ekokúfa, kasi atiki bomoi na bogángi mókó"
"Bogángi" ya bosóló
Po na Léon XIV, "Bogángi ya monene”, epúsamaki na Kristu libosó ya liwá na ye na kúruse ezali na bokuse "pási, bobwákemi, boyambi, libonza". Ezali kaka "mongóngó ya nzóto mókó ekolemba te, kasi elembo ya súka ya bomoyi moko emipesi", elakisaki Papá wa Roma, oyo abákisaki 'te bogángi ya Yézu elandaki motuná mókó, "mókó lya biyé bikozokisa makasi biyé bikoki kolobama". "Nzámbe wa ngái, Nzámbe wa ngái, po nini otiki ngái?" Maloba maye, elobaki ye, bikokumbá "tina mókó ya yangó mókó". Po "Mwána, oyo azalaki kobika tángo insó na boyokani makási na Tâta, azali sik'oyo kosála likambo ya kimia, ya bozali te, ya libúlú", elobaki mokitani ya Petelo. Ezali te, ekobaki ye, "likambo mókó ya bozangi boyambi", kasi eténi ya súka ya "bolingo mókó ekopesama kinó na súka"
Sántu Papá amónaki 'te "bogángi ena ya Yézu ezali bogángi mókó ya bobúngisi elikya te, kasi ya bosóló, bosóló epúsani na súka, ya botiyi motéma eye ekobúnda átá sóki nionso ekómi kimia". Pe ezali kaka na eleko waná nde "likoló eyindi pe elambá enene ya témpelo epasuki", elobaki Léon XIV na bozongeli esika ya Makomi Misantu. Ezali lokóla ekelámu ye meyi azalaki na pási ena pe abimisi na ngonga wana eloko mókó ya sika, etéyaki ye. "Nzámbe avandaka simá ya elambá te, elongi na ye ekómi komónana polélé na Moto abákami". Po ezali na "moto oyo azoki, nde bolingo ya monéne ekomónana". Wana nde "tokoki koyéba Nzámbe mókó oyo atikalaka mosika te", kasi oyo akoleka "kino na súka pási na bisó", endimaki episkopo ya Roma. Sántu Papá alobaki 'te mokónzi wa basodá, mopagáno mókó, ayébi ye", tango alobi "Ya sólo, moto oyo azalaki Mwaná wa Nzámbe" (Mk 15,39). Papá alimbolaki lisusu 'te "bosakoli wa boyambi ena ya mbala ya yambo simá ya liwá ya Yézu", ezali mbuma ya bogángi mókó ebúngaki te na mopepe, kasi eye ebetaki motéma
Kogánga, likambo ya molimo
Papá wa Roma alimbolaki ‘te “tozali na momesano ya kozua bogángi lokóla eloko mókó ya mabé, ya kosúkisa”. Nzókandé Nsango Ndamu ekopesa na “mongóngó na bisó motúya mókó monéne, na bokundoli na bisó ‘te ekoki kozala mbela mókó, botelemeli mókó, pósá mókó, botiki mókó”. Ekoki kozala atá loléngé ya koleka ya losámbo, “tángo tozali lisusu na maloba te”, ebákisaki ye. Yangó waná na bogángi ena, “Yézu atiaki nionso etikalaki na ye: bolingo na ye nionso, elikya na ye nionso”, elobaki Léon XIV. Na bolimboli ‘te ezali “elikya mókó eye elambáka te”.
“Tokogánga tángo tokondima ‘te moto mókó akoki koyóka bisó lisusu”, “na bobwáki elikya te, kasi na pósá”, elobaki episkopo ya Roma. Yézu, esémbolaki ye lisusu, “agángaki te na kandá ya Tatá, kasi epayi na Ye”. Atá na kimia, “andimaki ‘te Tatá azalaki waná”. Yangó, « alakisaki bisó ‘te elikya na bisó ekoki kogánga, atá tángo nionso ekomónana ebúngi ». Po na yangó, « kogánga ekómi likambo mókó ya molimo”. Pe Yézu « atéyi bisó ya kobánga bogángi te », kasi ezala ya « sóló, bomikitisi, ekokendé epayi ya Tatá ».
“Toyékola bogángi ya elikya tángo ngonga ya bomekami ya makási eyaka. Po ya kozokisa te, kasi po ya komipesa na bisó. Po ya kogángela moto mókó te, kasi po ya kofúngola motéma”, elobaki Mokitani ya Petelo. Sóki “bogángi na bisó ezali ya sóló”, ekobaki ye, ekoki kozala “ebándeli ya mwinda ya sika, ya mbótama ya sika”. Lokóla po ya Yézu tángo nionso emónanaki esili, na bosóló, “Libiki ezalaki na litónó ya kobánda”. “Mongóngó ya bokono ya bomoto na bisó, esangani na mongóngó ya Kristu”, sóki emibimisi na botiyi motéma pe bonsómi ya bána ya Nzámbe, ekoki kokóma “liziba ya elikya po ya bisó pe po ya baye bazali nzinganzinga na bisó”, esúkisaki Papá.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.
