Luka

Pàpa alobeli mpasi ya bato liboso lya bikuke to bizibelo ya bomengo

Na libaku lya bosepeli Zubilé ya bakatekisi, misa moko esalemaki o mokolo mwa lomingo 28 Setembe na esika Santu Petro. Na yango, Léon XIV apesaki mosala ya bokatekisi na bakristu tuku misato na libwa, baùtaki na mokili mobimba. Na mateya ma ye, alakisaki boni boni bakatekisi, bazali bayekoli ba Kristu, bongo bakomi banzeneneke mpe basakoli bwa Nsango Elamu. Apaleli mpe na ntina ya lokoso, oyo etindaka moto abosana bosembo, mpe ya bomengo oyo elongolaka moto miso liboso ya mpasi ya babola.

Albys KBD, CP – KBD/RDC

 

Bakatekisi oyo bayaki na zubilé, bazalaki tuku misato na libwa (39), bautaki bikolo ya mokili mobimba mpe bazali koloba lokota likeseni. Bamimonisaki o boso bwa Pàpa na lopango ya baziliki Saint-Pierre na nsuka ya litangi ya Nsango Elamu ya lomingo la tuku mibale na motoba ya mobù C. Moko na mosusu bayanolaki “Ngai oyo” awa babengaki bang ona nkombo ya bango. Tata Mosantu apesaki na bango mokumba yam osala ya bokatekisi

Sima ya mateya ma ye, Leon alendisaki bang ona ntina ya libyangi la bango; mpamba te, basengeli kozala molimo ya bontoma na ndakisa ya basi mpe mibali eye bazalaki kosalisa Polo mpe bapostolu basusu na kosangela Nsango Elamu

Kotika na mitema mya bato, liloba lya bomoi

Basengeli kotika na mitema mya bato, liloba lya bomoi, bakolaki liloba lina solo na ndakisa ya bomoi bwa bango moko, ebetaki nsete episkopo wa Roma. Bongo alobi lisusu ’te: “baboti bazali bakatekisi bayambo”. Nsango Elamu ekosakolama bobele na esika biso tozwami, lokola o kati ya libota, o meza yoko, tango lolaka loko ekoyokisama, tango elembo moko ekomonisama, tango yoko elongi ezali komema na Kristu. Libota ekosala esperiansi ya bonzenga bwa Nzango Elamu.

Bakatekisi bazali komema biso na boyambi, bazali kotambola na biso elongo tango inso; nzoka nde mosàlà monà mozali mp ona eklezya mobimba. Apesaki bango buku ya katekismo «guide de voyage ». Bakatekisi «bakotikaka elembo ontei ya bato », mpamba te, «tango tozali kotangisa na boyambi, tozali kotika o kati ya mitema, liloba lya bomoi, mpo ‘te ebota mbum aya bomoi malamu »

Nkita ya basusu mpe mpasi ya bato

Nakolobela Nsango Elamu ya mokolo mona,Pàpa alobi ‘te, moto mwa nkita mpe mobola Lazare bazali kokoba kino lelomei. Tokomona liboso lya bizibeli bya nkita, ezali na mpasi mobimba ya bato. Bileko bileki kasi eloko moko te ebongwani. Ba Lazare boni bazali kokufa liboso ya bozangi bosembo, na litomba ya baye bazangi bondeko, na nkita ekoboma miso liboso lya bato ba mpasi. Kasi Nzambe atalaka motema ya bato. Atali sé Lazare mobola, mpe atangi nkombo ya yé, kasi ya moto ya nkita te. Nzambe afuti bango babale, Lazare pene na tata Abarama, bongo moto wa nkita atondisi yen a mitungisi mpo ya bandeko ba yé. Eklezya epesi ndakisa ya Nsango Elamu eye, mpo ‘te ebongolo mitema mya biso.

Mabondeli ma moto ya nkita mpo’te tata Abarama atinda bato balobela bandeko ba ye mpo babongwana, ezali momekano monene mpo na eklezya ya lelo. Bato bankita bazali kozila ‘te Kristu azonga lisusu mpo babongwana. Oyo nde ezali etinda enene eklezya mpe bakatekisi ba yé basengeli kokokisa. Mpmba te, soki moto oyo azangi kombo azalaki na boyambi, Nzambe alingaki kobikisa yen a mitungisi minso. Kokangema na biloko bya mokili nde ebungisi ye na elikta ya solo mpe ya seko. Tango biso mpe tozwi mimekano ya bokeseni, ba lazare balelo bazali kobenga biso lisusu, tokanisa liloba lya Yezu oyo ekomeli biso katekismo ya makasi koleka, mingi mpenza na eleko eye ya zubilé. Ezali mp ona banso, tango ya kobongola motema mpe ya bolimbisi, ya bomipesi mpo na bosembo mpe koluka kimya ya solo mpenza.

Milulu mya Ukaristia, na libakù lya zubilé ya bakatekisi
Milulu mya Ukaristia, na libakù lya zubilé ya bakatekisi   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 sánzá ya libwa 2025, 11:18