Pàpa asepeli mibù tukù sambo (70 ans) ya mbotama ya yé
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
“Bandeko balingami, o mokolo mwa lelo na zali kosepela mibù tuku sambo ya mbotama na ngai. Na tondi nzambe botondi nà mpe baboto ba ngai; na pesi mpe matondi na baye banso bakanisaki ngai na nsambo ya bango”. Ndé wana maloba ma Pàpa Leon ya zomi na minei (léon XIV) ut’o lininisa lya bandako ya baPàpa, nsima ya losambo la angelus. Na esika Saint-Pierre, bato nkota tuku misato ya bakristu to bandimi; bayaki nà ba endele mpe babaló mpo na libaku to molulu mwango.
Banda tongo ya mokolo moye, bato ba mokili mobimba batoni na bilako malamu mpo na kopesa mbote na Pápa Léon XIV, oyo azali kosepela mokolo mwa mbotama wa ye o mokolo moye mwa lomingo, 14 Setémbe. Soki balongoli ebele ya mikanda, oyo batindelaka bato, mpe bakarte ya poste oyo ebandaki kokóma na Vatican mokolo na mokolo, ezali mpe na bililingi ya bana mike oyo bazali na lopitalo ya bana, Bambino Gesù. Kati na yango tozali kotánga mposa na bango ya kopesa to kokabela Tata Mosantu yoko mokili ya boboto mpe ya kimya. Ezali bosénga oyo Léon XIV amonisaki na butu oyo aponamaki na kiti ya Petro, o mokolo mwa 8 ya sànzà ya Máí moleki.
“Mokolo mwa lelo, tozali kotondo Nzambe mpo ya likabo lya bomoi bwa yé mpe mp ona mosàla mwa yé. Tosangani elongo na molimo mpo ya kosambela n antina ya bosenga mpe etindà ya yé”, nsango etindaki lisanga ya losambo na mokili mobimba mpo ya Pàpa, na nzela ya X. Bansango ezali konota na masanga ya bato na internet, mingi mpenza n abato oyo bayebani te. Nzokande bamoni videyo moko bazwaki yango na Perou, o mokolo mwa 14 ya sànzà ya setémbe ya mobù 2018, ya mokolo mwa mbotamà ya Pàpa tango azalaki missionele na mboka ya Amerika Latina.
Ba episkopo ya mikili ndenge na ndenge bapesaki mpe Pápa maloba malamu ya mbotama ya esengo, na nzela ya losambo to mabondeli mpo na kokumisa ye mpe kopesa ye matondi mpo na mosala mwa ye. Na mokili mobimba, baepiskopo basanganaki na yen a losambo, mpo “na kosenga kimya oyo ezangi mandoki mpe oyo ezali kolongola mandoki kati na bitumba binso oyo ezali kosopa makila na biteni minene ya mokili”.
Na ngámbo na ye mpo na koluka kimya
Likita ya ba episkopo ya France epesi lokasa moko mpo na Pápa na site Internet na yango, na mokolo ya feti na ye. Ambassadeur ya France ya mwasi oyo azalaka na Roma, ye mpe atindelaki ye “mbotama elamu”. Florence Mangin alobi ‘te “misala mya liboso mpo na kimya, lokumu la bato mpe bomoko oyo eyokani na makambo maye France ezali kokabola elongo na Vatican”.
Na kombo ya bato ya Italie, Mokambi ya mboka, Sergio Mattarella atindelaki mpe Tata-Mosantu mbote ya esengo, mpe abetaki nséte na “mbela makasi azali kobwaka mpo ‘te bitumba esila mpe bato bazongela masolo, mpo na bolamu ya bato banso”; na eleko oyo wapi “bobangi ezali se kokola, mpe mokili ekomi na nzela ya likama, etambwisami na mayele mabe ya kosalela bokonzi na ndenge ya mabe mpe na bitumba ya makasi”. Mokonzi ya ekolo ya Italie azwi maloba na esika ya basi mpe mibali ya motema malamu, oyo, bazali na bosenga yaboboto mpe bosembo na lombango liboso ya “bankoto ya bato oyo bazali kofuta bitumba na ntalo ya makila ma bango, mokolo na mokolo”.
“Mikili minso mizali kotala na elikya makasi maloba ma Pàpa, elobi Sergio Mattarella, mpe abakisi ‘te ezali mpo ya bato banso, “mpe mingi mpenza mpo na baye bazali na misala ya Leta”. Esengeli bamipesa “mpo ‘te makambo mabonga, bafungola lisusu banzela ya masolo, ya bosembo mpe ya kobatela lokumu ya moto nyonso”. Alaki ‘te Leta ya ekolo na yé Italie ekosala elongo na Tata-Mosantu na “mokumba na ye monene ya bontoma”.
Bolingo bwa dioseze ya Roma
Na libakù lya mokolo mwa mbotama mwa yé, Dioseze ya Roma esanganaki elongo ná episkopo wa yé, mpo na kotondo Nzambe Tata botondi na ntina ya likabo ya bomoi bwa ye. Na nkombo ya Dioseze ya Roma, episkopo wa lokumu Baldassare Reina, alobi na Pàpa na maloba maye: “yamba nsambo mpe malingami ma biso, mpo na makambo manso oyo bosalaka mokolo na mokolo, na molende nyonso, mpo na kosalisa eklezya ya mokili mobimba, kobanda na eklezya ya Roma”. Reina akaboli mitungisi ma Pàpa mpe abakisaki lisusu ‘te: “andimi makanisi ma yé, mingi mpenza mpo na bitumba nziké bizali kosopa makila na mokili”. Bongo azali na mposa ‘te “akokisa mposa ya motema na ye mpe akoba kolona elikya mpo na mibali mpe basi ya mikolo miye mya biso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
