Yoko sapele mpo na Boboto elongo na Pápa, o mokolo mwa 11 ya okotobe na esika ya Saint-Pierre
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bo momeseno, sànzà ya okotobé ebonzami na sapele, losambo la Maria. Mpo na bopusani bwa sànzà eye enene, epai wapi bakomaniola Bibilia mpe bakosambela, Pàpa Léon, nsima ya malongi ma mokolo mwa mosàlà misato ya likita mpo ya banso, abyangi bakristu na kobakisa na bansambo ya mokolo na mokolo, losambo la sapele, mpo na kobelela likabo la boboto na Nzambe. Elaka epesami na sika Saint-Pierre. Bakatoliko ba mokili mobimba bakosangana elongo o mokolo mwa poso mwa 11 ya okotobe, mpo na losambo la sapele, mpo na kosenga boboto na bikolo biye bitungisami na bitumba.
Maloba ma yé mazalaki boye: “Na byangi moto nyonso, mokolo na mokolo ya sànzà ya okotobé, na kosalal losambo la sapele, n antina ya boboto. Ezala yo moko, na lisanga o kati ya libota, to na lingomba”. Mingi mpenza alobelaki yango na banganga-nzambe, bamamelo bazwami na Vatikan, ba kosala yango mokolo na mokolo, okati ya bazikikiya Saint-Pierre na ngonga ya 19h00 mpo na sànzà ya okotobé mobimba.
Molulu mwa losambo mpo na boboto na butu bwa mokolo mwa poso mwa 11 ya sànzà ya okotobe, oyo Pápa asakolaki, ekosalema na boumeli ya Zubile ya ndakisa ya Maria; bongo ekosuka na misa oyo Tata Mosantu akokamba mokolo mwa lomingo, mwa 12 ya sànzà ya okotobe. Mokolo mwango, mokozala mpeeyenga ya mibù tukù motoba na misato (63è) ya likita monene ya mibale ya Vatikan (ouverture du Concile Vatican II), oyo Santu Jean XXIII, Pàpa, afungolaki na mobù 1962.
Na kopesa mbote n abato bamobembo ya Portugal, Mokitani ya Petro abelelaki mingi na ntina ya “mabe mabimisami na koyinana oyo ekomemaka na koboma”. Yango wana, bakristo babyangemi na koyebisa bato basusu “bolingo bolingo bwa Yezu oyo ezali kongengisa mpe kotombola batoba mokili”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
