Luka

Papa Leo XIV na likita lya banso na Vatican Papa Leo XIV na likita lya banso na Vatican  

Likita lya bansó: "Tokelama po ya bozali mobimba"

O eleko ya likita lya bansó ya mokolo ya misáto 15 ya sánzá ya zómi, Sántu-Papá amanyolaki Nsékwa ya Kristu pe ntina na yangó po ya mokili ya leló. Léon XIV alobaki lisusu na bato ya mobémbo mwa boyambi ebelé na esika Sántu-Petelo, 'te bomoi ya moto, elekama na esengo pe bolembú, elónga pe eseke, ezali na elembo ya pósá mókó ezanga ndelo ya nionso pe bolámu ya sóló.

Jean- René Bompolonga - Kinshasa

Bomoi ya moto etiyama elembo ya bokesenisi: "Tángo mosusu tokoyóka tozali na esengo, tángo mosusu na mawa, to lisusu tosépeli, to tokobánga, bakabeli, tosili pósá...Na nionso, tokomeka likambo mókó ya bokesenisi: tolingi tozala na esengo, kasi ezali pási ya kozala bôngó ngonga nionso pe mabé te", elobaki episkopo ya Roma na bosakoli 'te pósá ya mozindo ya esengo pe ya nionso ekosépelisama te na mpifo, na biloko, kasi na bosólósóló 'te "ezali na moto mókó oyo azali mobateli ya likambo yangó ya bokeli bomoto na bisó, na bondimi 'te bozeli ena ekopesa mawa te to ekobébisama te". Bosólósóló waná, esémbolaki ye, ekolongobana na elikya.

Na bosimbi Nsango Elamu ya Yoane (10,7-10), Sántu-Papá alobaki 'te "Yézu azali ezibeli pe bomoi ya mingi. Nsékwa na ye ezali eténi mókó ya pamba ya kála te, kasi likambo eye ekobongola lisoló ya moto na káti". Bôngó, ebakisaki ye, Mosékwi azali liziba mókó ya bomoi eye ekolongola pósá pe ekobótisa matiti na mabelé ekauka ya motéma ya moto.

 Mosékwi, Moningá na bisó na mikakatano

Yézu mosékwi akopesa biyano bisálema kála te, kasi akokende elongó na mókó mókó na nzelá na ye: "Akomisála moningá na bisó na mobémbo eye mingi penza ekolembisa, ya pási, ya sómo. Ye mei akoki kotondisa mwá molangi na bisó ezali na eloko te, tángo pósá ya mayi elekaka", elimbolaki Mokitani ya Petelo, na boyébisi 'te nsékwa ekopesa esika mókó ya kotelema libosó ya mikakatano ya bomoi. Pe abakisi: "Kozanga bolingo na ye, mobémbo ya bomoi ekokoma boyengiyengi mókó ezanga móto na makolo, mbémbá mókó ya mawa ezanga esika ya kokende", elobaki ye lisusu, na bobeti nsete na lomeko (dimension) ya mbóndi pe ya kobikisa na likambo ena ya ntina ya boyambi ya mokristu.

Elikya mókó eye ekobongola bomoi

Po ya Léon XIV, elikya likoki kobongola bomoto ebimi na Nsékwa. Ekolaka kaka bopemi mókó te na nzelá ya mabelé kasi lokóla kimia mókó ya libela: "Mosékwi akolaka bisó esika ya kokende, akozongisa bisó na ndáko, epayi wápi tozelami, tolingami, tobikisami", esúkisaki ye, na bobengi mókó mókó ya kotómbola na Yézu pembeni na ye, pósá ya mayi esili pe osálisami, atá o ntei ya mikakatano.

Matondi mingi ndéngé otángi lisoló eye.

15 sánzá ya zómi 2025, 13:55