Luka

Bilili ya Mompepe makasi (ouragan Melissa) bamoni na satellite o likolo ya ba Caraïbes.  Bilili ya Mompepe makasi (ouragan Melissa) bamoni na satellite o likolo ya ba Caraïbes.  

Pàpa asàmbeli mpo na bato bazwi likamà ya mpela Melissa na Jamaïque

Pàpa alaki bozali pembeni mpe nsambo ya yé, na bato baye bazwi likàmà ya Mompepe makasi (ouragan) Melissa. Ebuki esanga ya Jamaïque na mwa ngonga ewuti koleka. Leon ya XIV alendisi bakonzi bamboka mpo ‘te basàla manso makoki mpo na kosunga masanga mayé mazwami na likàma liye na ekolo ya Cuba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na zali pembeni na moto nyonso, kati na losambo mp ona baye banso babungisi bomoi bwa bango, baye bakimi, mpe na bituluku ya bato bazali kozela nsango mpo ya koyeba lolenge kani likambo la mpela ezali kokoba. Basusu bazali koleka tango moko yam pasi mpe mitungisi na mabanzo”; elobaki Pàpa Leon ya XIV, sima ya malongi ma yé, na likita mpo ya banso, o mokolo mwa 29 ya okotobe ( sànzà ya zomi) na place Saint-Pierre. Solo alobelaki mpela Melissa, oyo ezali na nguya ya kobebisa makambo manso mpe kozindisa mboka. Likàmà liye likweyi o mokolo mwa mosàlà 2 sima ya nzanga, na Jamaïque, na mbu ya ba Caraïbes. 

Solo mpela eye eleki makasi koleka bampela bisusu ya esanga oyo  ezwami na ngambo ya Ngele (sudi) ya Cuba mpe westi ya Haïti, na bikeke biwuti koleka. Mingi mpenza; ezali ngambo oyo ya Sudi mpe Westi ya mboka. Ekeseni na oyo esamemaki na mboka-mokonzi Kingstone. Engebene na nsango ya NHC, oyo elimboli National Hurricane center, kobanda Miami kino Etats-Unis, mompepe mobetaki pembeni ya 300 kim/h. Elakisi ‘te, na bohumeli bwa ngonga minei, mompepe makasi epikolaki banzete, ndele ya bandako oyo ezalaki pepele; bongo mbula makasi oyo ezalaki konoka, yango nde ebimisaki mpela mpe mbonge makasi na mabongo.

Makamà minene

Premier ministre ya Jamaïque, Andrew Holness, alobi ‘te makàma mya mompepe makasi oyo ebetaki mboka, ezali “kobebisa mpenza” mpe “makàmà ya biloko ezali mingi”. Balopitalo, bandako minene ya wangata, bamagazini mpe banzela ebebi mingi mpe ekoyebana malamu kaka na mikolo mizali koya. Na ndenge ya bomoto, Melissa abomi bato soki misato banda mokolo mwa yambo, na ba accidents ya ba nzela. Kaka na mokolo yango, mbula makasi ebomaki bato misato na Haïti mpe moko na République dominicaine. Kutu Tata-Mosantu alobi yango ‘te: “Mingi ezali bato oyo, balungwe, mpamba te, bandako babango esilaki kobebisama na mpela”.

Akobaki koloba ‘te: “Nazali kolendisa bakonzi ya Leta, básala manso maye bakoki; mpe nazali kotonda mangomba ya boklisto mpe bibongiseli ya bolingo malamu mpo na lisungi oyo bazali kopesa”.

Cuba mpe ezwaki likàmà linà lokola

Na ngong’oyo, Leon ya zomi na minei (XIV) ayebisaki bandimi oyo bazalaki na likita monene ‘te, Melissa azali kokatisa Cuba nà nguya ya kobebisa”. Mompepe makasi ya 5 na Saffir-Simpson, oyo eleki makasi, ezongaki sima to ekitaki na molongo ya misato ntango ekómaki pene na ngambo ya Sudi-Esti ya Cuba. Bato 700 000 bakimaki na bisika na bango. Melissa asengeli kolanda nzela na ye kino na Bahamas mpe kopusana pene na Bermudes.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya zómi 2025, 10:43