Bakofungola esika ya kosalisa bato ya maladi “Saint Martin”, na miso mya Pápa
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mokolo mwa mitano, mwa 14 ya sànzà ya Novémbe, lopitalo ya Saint-Martin efungwamaki na nse ya ndaku ya Saint-Pierre. Esalemi mbula zomi nsima ya oyo ya “Mama wa Ngolu” mpe o mokolo mwa lomingo 16 Novembe, mokolo oyo bakokundola mokolo mwa bobola na mokili mobimba. Pápa Léon XIV akofungola yango. Engebene lisoló moko ya Departema ya misala ya bolingo malamu, yango ezali bongo bandako mibale ya sika oyo etondi na bisaleli ya sika mpe esika ya sika ya radiologie oyo ekopesa nzela na bato oyo bazali na maladi ya ntolo ‘te bázwa lisalisi ya monganga.
Ekosalisa bango bàyeba na lombango mpe na bosikisiki maladi ya mpema, kobukana ya mikuwa, kanser, maladi ya mabe, mabanga mpe bokangami ya mitsopo, maladi oyo mbala mingi bato bazali kobosanaka, mpamba te, ezali kati na babola. Koyeba maladi yango liboso to noki, ekosalisa mpo na kozwa nkisi ya malamu, mpe na lolenge lonà, ekobongisa bomoi ya bato oyo bazali na maladi yango, mpo te bázala na bomoi ya malamu.
Elongi ya Yezu epai ya babola
Ndako eye, esalemi na boyokani nà biro ya Leta oyo etalelaka makambo ma bokolungono bwa nzoto mpe bopeto ya nzoto na Vatikan, oyo ezali kosalisa bato oyo bazali na bosenga. Esika ya koyamba bato mpe ya kobatela bango, mpe ezali lolenge ya kopesa lokumu epai ya babola oyo bazali kobeta na ekuke to ezibelo ya ndako ya bonganga-nzambe. Episkopo wa lokumu, Kardinale Konrad Krajewski, mokambi ya lingomba ya Pápa, alobaki ‘te baye bazali na bosenga “oyo kati na bango tozali komona moto azangi ndako te, mobola mpe te, kasi elongi ya Yesu”.
Lisalisi ya monganga ya ofele
Na lopitalo ya Ammonière apostolique, “Saint-Martin”, oyo eyei kobakisama na lopotalo ya “Mama wa Ngolu”, lisalisi ya monganga koleka nkoto mibale (2000) epesamaka sanza na sanza, ya ofele na nzela ya mosala ya minganga ba volontaires nkama moko na tuku mibale (120), ba infirmiers mpe ba techniciens ya bokolongono bwa nzoto. Bazali kosalisa babola pene na nkoto zomi (10 000) oyo bauti na bikólo nkama moko na tuku misato na libwa (139). Kino lelo, lisalisi lya monganga 102.060 epesami na bato oyo bazali na bosenga, mpe maboke ya nkisi 141.200 ekabolami.
Na nzela ya ba dispensaire oyo mibale, ekozala na makoki ya kokoba kopesa bato oyo bazangi lisalisi ya minganga ya minene mp ona maladi ya mino, ya makila mpe mpo na ekzame ya rayons X. Bazali mpe kopesa bato biloko ya mino oyo bakoki kolongola, manɛti, mpe bisaleli mpo na koyoka kozanga kosɛnga mbongo. Lisusu, bankisi oyo bakomi mpe bapesi bato, bakopesa yango mbala moko na bato oyo bazali na mposa na yango, mpe bakofuta te, bakozwa yango ya ofele.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
