«Koyemba ezali kokanisa na biso lisusu ‘te, tozali eklezya eye ezali nayino kotambola»
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na eyenga eye ya Kristu, Mokonzi wa molongo mobimba, Pàpa akanisaki lisusu na bato, na ebandeli ya lisikulu na yé ‘te : molulu mwa lelo mozali kobengisa biso «na kotambola elongo na masanzoli mpe na esengo mpo na kokutana na Mokonzi Yesu Kristu, Mokonzi wa molongo mobimba, Mokonzi wa boboto mpe ya Bomikitisi, Oyo azali ebandela mpe nsuka ya biloko binso». Bolingo bwa Nzambe, oyo emonisami na malozi ma Kristuo, ezali mpe «lisalisi mpe ntina ya loyembo la bino», alobaki liboso ya bakiritu ; kati na bango bayembi 35 000 oyo bawuti na mokili mobimba mpo na kosepela zubilé ya bango.
Mokumba ya ba choristes ezali ya «kokotisa bandimi na masanzoli ma Nzambe mpe kosala ‘te bakoka kosangana mingi na misala mya losambo na nzela ya loyembo», ndenge Léon XIV alobaki yango. Pápa alobaki ete, «koyemba ezali lolenge ya bomoto ya koloba: elimo, mayoki, nzoto mpe molimo esangani mpo na koyebisa makambo minene ya bomoi».
Loyembo la sika ya Kristu oyo asekwi
Loyembo emonisaka losambo mpe makumisi (masanzoli), ezali «loyembo ya sika oyo Kristu oyo asekwi atomboli epai ya Tata, na kosangisa elongo na yé bato banso oyo bazwa libatisi, lokola nzoto moko ya sika, nà Molimo. Na Kristu tokomi bayembi bya nguya, bana baeklezya, baye bazali kotoka na Yezu oyo asekwi, ntina ya makumisi ma biso ».
Nakopesa ndakisa ya Santu Augustin, episkopo wa Roma alakisaki mpe ‘te «koyemba epesaka makoki na bato bamobembo oyo balembi » bazala na «esengo oyo bakozala na yango ntango bakokokisa mokano na bango. Na yango, kozala kati na bato baye bayembaka elimboli kokende liboso elongo kosimba bandeko loboko na loboko, kosunga bango na kotambola elongo na biso mpe koyemba elongo na bango makumisi ma Nzambe, kobondisa bango kati na mpasi na bango, kolendisa bango ntango bazali komonana lokola ‘te bazali kolemba, kolendisa bango na molende ntango makasi ma bango mazali komonana lokola elembi».
Mosala ya koyemba
Pape akundoli lisusu ‘te bayembi basalaka mosala na bango liboso nayino na esika ya losambo, bosalaka ‘te mosala yango ekoma mpenza mosala ya Nzambe, «oyo esengaka komilengele, bosembo, kososola mpe, koleka manso, kozala na bomoi mozindo na molimo».
Léon XIV alobaki lisusu ‘te: «Koráli ezali mwa libota ya bato ndenge na ndenge, basangani na bolingo ya miziki mpe na mosala oyo bazali kosala». Soki na bantango mosusu, mwa kokoso to bozango koyokana ekoti, « ezali normali, mabota manso, makutanaka na mwa mikakatano, mpe ezali lisusu elembo ya Eklezia : Na lolenge moko to mosusu, koyemba ezali elembo ya Eklezia, oyo ezali kolanda mokano mwa yango, ezali kotambola kati na lisoló ya bato na kokumisa Nzambe. Kasi, ata soki nzela yango ezalaka ntango mosusu na mikakatano mpe na mimekano, mpe ata soki ntango ya esengo esanganaka na ntango ya mpasi, loyembo elembisaka mobembo mpe epesaka libondisi.
Mosala mwa basaleli ya Nzambe
Na yango, Papa alendisaki bayembi ba korale ‘te «bazala lisusu elilingi ya mwinda mwa Eklezia oyo ezali kokumisa Mokonzi mwa ye, mpe abengaki bango ‘te bazala na makoki ya kosangana ntango inso na bato ba Nzambe, kozanga kokwea na masenginya, oyo ezali kopekisa lisanga mobimba ya bayembi na koyemba na molende inso.
«Bokeba ete bomoi bwa bino ya molimo ezala ntango inso na bokasi ya mosala bozali kosala, mpo ‘te yango emonisa na bosolo binso ngolu ya losambo», esukisi Nganga-nzambe Monene na kotia bayembi banso na libateli ya Santu Cécile, patron ya bayembi, martyro ya Roma, oyo na bomoi bwa ye atombolaki loyembo ya bolingo oyo eleki kitoko, na komipesa mobimba na Kristu.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
