Leon XIV alobi na bilenge: “Bozala na bobangi tè mpo na kotatola 'te bozali ba Kristu”.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Bozala na bobangi tè ya kotatola to kolakisa ‘te bozali bakristu, ya kozalá na nsai mpo Nsango Elamu mpe kopesa to kokabola esengo oyo ekoutaka na kokutana na Mokonzi”. Wana ezali nde maloba ma Papa Léonya zomi na mibale (XIV) na bilenge oyo bazali kosangana na zubile ya bango na Katedrali ya Sainte Elisabeth na Košice, na Slovaquie. Engumba eye, ezali “liziba lya boyambi o bozindo bwa yango mpe ya elikya”.
Bomemele baninga mwinda mwa Kristu
Na video oyo ebimisamaki ba ngonga mibale nsima ya misa oyo esalemaki na 17h00, episkopo-mokonzi Bernard Bober ya Košice mpe Nicola Girasoli, ntomà ya Pàpa na Slovaquie, Papa alendisaki bilenge ‘te bázala «batatoli ya esengo».
Léon XIV apesaki toli ‘te «tómema mwinda mwa Kristu» o mabota, na biteyelo mpe na bainiversite, na bisika ya mosala mpe o kati ya mboka. Na yango, abakisaki ‘te: «Elongi ya bolenge bwa eklezya ekokoba kongenge ontei ya mikili mya Poto ya kati kati, epai wapi, ekobi ye koloba, «kondima ya bankoko ba bino ezali kokoba na kotikala elembo to liziba lya bomoi bwa sika, lelomei». “Na makambo manso ya bomoi bwa biso, tokoyeba ‘te tozali biso moko te, mpamba te, lokola bana, tolingami, tolimbisami mpe tolendisami sé bobele na Nzambe”.
Batongi ya ba gbagba
Episkopo ya Rome abengaki bilenge ya Slovaquie, bázala mpe «batatoli ya boyangani, batongi ya ba gbagba mpe baloni ya elikya na mokili moye motondisami na bokabwani mpe bozangi kotyelana motema».
Papa alobi ‘te kozala na bango na Zubile eye «ezali elembo ya bondeko mpe ya kimya oyo boninga bwa bison nà Kristu ezali kokotisa na mitema mya biso». Mpo na kosukisa, Pápa apesi lipamboli na ye mpe apesi elenge moko-moko na maboko ma Ngondo Maria, Mama wa Eklezya mpe Mokonzi-mwasi mwaa boboto (Kimya).
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
