Luka

Léon XIV na Nicée mpo na nsango ya bomoko, na Liban mpo na nsango ya Boboto (kimya)

Na Castel Gandolfo, Léon XIV ayanolaki na mituna mya bapanzi-nsango liboso ya Villa Barberini. Alobelaki mobembo na ye ya bontoma na Turquie mpe na Liban lokola mobembo ya elikia mpe ya boboto (kimya). Na oyo etali Ukraine, alendisaki ‘te baluka ntango inso kosolola mpo na kosukisa bitumba. Alobeli likambo ya mobulu epai na basi, o mokolo moye epesami mpo na bango, alobi ‘te makanisi masengeli kobongwana.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Nazali na esengo mingi ya kokende na Liban”. Wana nde eyano ya Léon XIV na motuna ya liboso na ntina ya mobembo mwa ye ya Turkique mpe Liban. Bangonga ntuku minei na mwambe liboso ya kokende na Ankara, Mokonzi Ntoma Monene azongi na Castel Gandolfo mpo na mokolo mwa ye ya kopema mpe ya mosala. Lokola na mokolo ya mibale oyo eleki, azali koyanola na mituna ya bapanzi-nsango oyo bayanganaki liboso ya ndako na ye.

Na kolobela mobembo mwa ye ya yambo oyo akosala na mikili mibale ya Moyen-Orient, oyo wapi ekotinda ye atelema mpe na Iznik mpo na aniversere ya mibu 1700e ya likita ya Nicée, Pápa alobaki ‘te azali komema nsango ya kimya mpe ya elikya, mingi mingi mpo na mobu moye ya zubile. “Nakozala na esengo mingi”, alobi, “nakopesa bato banso mbote”.  Alobi ‘te mobembo moye ebongisamaki mpo na kokumisa to kokundola ya likita ya yambo ya mangomba. “Na mikolo mileki”, “tobimisi mokanda moko oyo ezali kolobela ntina ya bomoko kati na boyambi, oyo ekoki kozala liziba lya kimya mpo na mokili mobimba. Tosengeli kotatola yango”.  Na nsima, alobelaki lisusu bokutani na ye elongo na Bartolomeo, mokonzi ya Lingomba ya Katoliko na Constantinople: «Ekozala libaku malamu ya kolendisa bomoko kati na bakristu banso».

Bibundeli bizali eyano te

Na nsima, Léon XIV alobeli mobembo na ye na Liban kobanda mokolo mwa lomingo 30 Novembe, mpe lolenge basoda ya Israël babwakaki babombi mikolo miye mileki, mingi mpenza na mokolo mwa lomingo, mpo na kobundisa kartye moko na sudi ya engumba-mokonzi. Bato mitano bakufi na bitumba ya Israel, kati na bango mokonzi ya basoda ya Shiite ya Hizbollah. Léon XIV abombaki te bomitungisi bwa ye: “Nazali lisusu kobenga moto nyonso ‘te aluka nzela ya koboya mobulu lokola mwango ya kosilisa mikakatano mpe ya koyangana na limemya, kofanda na mesa moko mpo na kosolola mpe kosala elongo mpo na kosilisa mikakatano”. Akobaki kolobela ntina ya koluka kimya mpe bosembo, “mpo mbala mingi mobulu eutaka na bozangi bosembo”, mpe abakisi ‘te “tosengeli kosala elongo mpo na bomoko mpe limemya ya bato ya bikolo binso mpe ya mangomba manso”.

Na Ukraine, bato bazali kokoba na kokufa

Mituna mizali kotalela makambo ma mikol’oyo. Pàpa azali kolobela Ukraine, oyo ezali na bitumba ut’o mibu misato. Na ngong’oyo bazali kolobela plan ya kimya ya Donald Trump président ya Etats-Unis na biteni ya makambo tuku mibale na mwambe (28). “Tosengeli kozela. Nzambe azali kosala.  Elobi Léon XIV, “Mpe emonani ‘te bazali kopusana pene na boyokani. Kosolola ezalaka na mikakatano mingi. Nazali kobenga bato banso mpo na kosenga ‘te batika bitumba, mpo bato mingi bazali kokoba kokufa”. Na makanisi ma ye, seyano ekoki kozwama na nzela ya masolo (dialogue)”. 

Ezalela ya sika

Liboso lya likama ya mobulu epai ya basi, na mokolo oyo ya mokili mobimba, Léon XIV alobi ‘te esengeli “kobanda na koteya bilenge” mpo “moto nyonso abongi na limemya” mpe “moto na moto asengeli na lokumu ya ye moko”. Alobi, esengeli kosilisa mobulu oyo ezali mpe kokómela bilenge. Pápa alendisi “ezalela ya sika”, bizaleli ya kimya mpe bolingo mpo na bazalani.

Thanksgiving, kopesa matondi epai ya Nzambe

Mokolo mwa minei, 27 ya sanza ya zomi na moko, Etats-Unis bakosepela mokolo mwa Thanksgiving, mokolo ba Américains,ba kotondo Nzambe botondi mpo na bolamu oyo bazwaki na mobu moleki. Na bomeseno bwa bango, mokolo monà mozali mpe feti ya kobuka mbuma mpo na basali bilanga. Bongo na Maison Blanche, mokolo moye, mokonzi ya Etats-Unis, akolimbisa ndeke  ya dindon moko. Mpo na bato banso, yango ezali mingimingi libaku ya koyangana elongo na libota. Feti yango eyebani na Pàpa, mpamba te, ue abotami na Chicago: “Nazali kolendisa moto na moto, mpe mingi mpenza na feti kitoko oyo tozali kosepela na Etats-Unis, oyo ezali kosangisa bato nyonso, ata bazali ya lingomba nini, ata bazali na bondimi te, mpo na kopesa matondi, mpo na koyeba makabo manso oyo tozwi, kobanda na likabo ya bomoi, likabo ya bondimi, likabo ya bomoko, kolendisa moto na moto mpo na kosala mpo na kimya mpe boyokani mpe kotonda Nzambe mpo na bolamu bonso oyo apesi biso”, eyanolaki Léon XIV na mopanzi-sango moko ya Amerika”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

26 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 16:37