Leon ya zomi na mibale azali koboya “minyoko ya bato ya Soudan”, mpamba te ezali eleko ya kondima té
Albys KBD CP, Kinshasa/RDC
Mbela moko ya molayi mpe ya molende esalemaki na lisalisi lya episkopo wa Roma, sima ya losambo la Angelus. Lokola ayebaki likambo la somo ya Soudan, Leon ya zomi na minei aboyi minyoko oyo ezali kokoba na esika ya basi na bana, kobundisama ya ba civils oyo bazangi makoki ya komibatela mpe ba mikakatano makasi na misala ya kokamba bato ezali kokotisa minyoko oyo bato baye basi basila kolemba na basànzà ya bitumba, bakoki kozwa te. Engumba ya El Fasher, na nord ya Darfour, ekweyaki na maboko ma batomboki ya FSR (Forces de soutien rapide) na nsuka ya sanza ya zomi. Human Rights Watch, ebongiseli moko oyo elandelaka lotomo la bato (ONG), elobi ‘te bato ya mobulu bazalaki konyokola mpe koboma bato oyo bazalaki na mandoki te.
Awa Pàpa Leon ya zomi na minei esengi losambo mpo ya bawà, azongeli mpe lisusu mbela lya yé mpo ‘te “batika kobete masasi, mpe ya kofungola nzela ya lisalisi oyo ekowutaka na mokili mobimba. Abiangi mpe Communauté internationale ekota likamb’ango, mpe basalisa baye bazali kosala mosala ya kopesa lisungi”
Kopesa motuya na masolo na Tanzanie
Maponami ya mokonzi ya mboka na Tanzanie mazalaki na mobulu, liboso mpe nsima na yango. Samia Suluhu Hassan azalaki ye moko candidat mpe esengelaki ‘te azwa pene ya 98% ya maponami ya mokolo ya misato, 29 okotobe. Ba partis ya opposition, oyo ba candidats na bango babwakamaki na maponami to bakotaki boloko, bafundaki likambo oyo ete ezali komeka demokrasi mpe baboyaki kondima ba résultats. Ba manifestations oyo ebandaki liboso ya maponami mpe ezwamaki na makasi, ekobaki nsima ya liyebisi lya mituya. Balobi ‘te bato mingi bakufaki. Ezali bongo na kati ya makamb’oyo nde Papa abengaki basembwi na kosambela mpo na Tanzanie, kosengaka “bato banso baboya lolenge inso ya mobulu mpe bapesa esika ya liboso na masolo”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
