Likita lya bansó:"Elikya ya pasika epesaka pási te"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Simá ya boleki káti na bato na papamobile, Léon XIV apesaki bomanyoli yoko etáli nsékwa ya Kristu. Pasika ya Yézu ezali "likambo lyoko eleka kála te, ekangama na momeseno lokóla biténi misusu ya lisapo ya bato", elobaki ye. Abakisaki 'te Eklezia "etéyi bisó kokomisa sika molimo ya Nsékwa mobú na mobú, na eyenga ya Pasika, pe mokolo na mokolo, o eleko ya bokumisi ukaristya, na ngonga elaka ya Kristu asékwi ekokisamaka mobimba". Yangó waná, ekobaki Sántu-Papá, mobombano ya pasika ezali "motéma ya bomoi ya mokristu, esika wápi makambo misusu mikobongwana". Na nzela ya likambo lyoko lyoko, -bolózi, pási, mawa, misangani na esengo, na bokamwi, na kimia- motéma ya moto "ekoluka bokangemi mobimba na Nzámbe, na bolámu yoko ya mozindo", etálisaki Papá.
Nsékwa epesi elikya na bomoi ya mokolo na mokolo
"Eleko na bisó lokóla, ezua elembo ya kuruze nzike, ebéleli na ebándeli ya elikya ya pasika", etéyaki lokóla Léon XIV, oyo alobaki na eleko enà 'te Nsékwa eye ya Kristu ezali "likanisi lyoko te, kasi Likambo liye esika boyambi ebandi". Waná, Papá wa Roma alobaki 'te "Ye, Mosékwi, na Elimo Sántu, akokoba koyebisa biso, po 'te tokoka kozala banzeneneke na ye atá esika lisapo ya moto emoni mwinda te na libosó". Pamba te, elobaki ye, "elikya ya pasika epesaka pási te". "Kondima ya sóló na Pasika na nzela ya botámboli ya mokolo na mokolo elingi koloba" po ya Papá "kobongola bomoi na bisó, kozala babongwami po ya kobongola mokili na makási ya pete pe na mpiko ya elikya ya mokristu".
Nsékwa, elónga ya bolingo na lisumu pe ya bomoi na liwa
Nsakola ya pasika, elimbolaki Sántu-Papá, ezali "nsango ya kitoko koleka, ya esengo koleka pe ya kokámwisa koleka eye eyokana te na lisapo, ezali ‘Nsango Elamu’ ya bolámu bopusi" eye "ekolakisa elónga ya bolingo na lisumu pe ya bomoi na liwa". Pe libosó ya "botaú ya bomoto na bisó", ebetaki ye nsete, nsakola ya pasika ekomi "lisálisi pe libiki". "Ekoléisa elikya libosó ya mikakatano mikobangisa miye bomoi ekobimisela bisó mokolo na mokolo, na moto ye mei to mokili".
Eleko po ya Papá wa Roma ya koloba lisusu 'te na botáli ya Pasika, "la Via Crucis -Nzela ya Kuruze ekobongwana Nzela ya Mwinda- Via Lucis". Po na yangó "tozali na pósá ya kosepela pe ya komanyola esengo simá ya pási" kasi lokóla "ya kobika lisusu na mwinda yoko ya sika biténi nionso mizalaki libosó ya Nsékwa". "Tokokende epái ezanga ndelo pe ya seko", pe yangó ekokesene na "likambo ya kufa, ekóya libosó na ba pási, mabúngi, biseké", elobaki Sántu-Papá, oyo po ya kolakisa maloba na ye, atangaki Loyémbo ya ndeko mobáli Soleil, ya sántu François d'Assise: "Na liwa, moto yoko te azali na bomoi akoki koleka"
Na bozongeli likambo elobama na nsango-ndamu ya Mateo, Papá alobaki 'te "nionso ekobongwana ngrásya na tóngo ena esika bási, bayaki o lilita po ya kopakola mafúta na nzóto ya Mokónzi, bakuti lyangó polele". Úto "tóngo ena kinó leló, mokolo na mokolo, Yézu akomema lokóla kombo eye: Moto ya bomoi, lokóla amilakisi ye mei na Emoniseli", elimbolaki Mokitani ya Petelo. Pe na Ye, ebakisaki ye, "tozali na kondima ya kokoka tángo insó kozua monzóto epái wápi kolandisa bomoi na bisó ekomonana lokóla mabé, ezui elembo ya makambo miye mikomonana mingi mobulú, ya kolinga te, ya kososola te: mabé, na biténi na ye ebelé, pási, liwa, makambo mikotala bato bansó pe yoko káti na bisó", elobaki ye. Tálá pona nini, na bomanyoli mobombano ya Nsékwa, "tokozua eyano na pósá ya liyóki na bisó", esúkisaki ye.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.
