Likita lya banso: komona lisusu elanga ya Nzámbe po ya kobunda na mikakatano
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Papá Léon XIV abándaki malongi na ye ya mokolo libosó ya bandimi ebelé na motuná mókó sémba: "Yézu, Oyo azali na bomoi, akokoba leló kotuná bisó motuná kaka waná" na Marie-Madeleine: "Po na nini okolela? Okoluka nani?". Libosó ya mikakatano ya eleko na bisó, elobaki ye, moto mókó te akoki kotelema lisusu ye mókó; mayi ya miso, na esika ezala elembo lyoko ya bolembu, bikomaka tángo mosusu "likabo" eye ekopétola botáli pe ekofungola elikya lyoko ya sika lisusu.
Elongi ya Marie-Madeleine
Na bozongeli lisolo ya Nsango Elamu ya Yoane, Papá alobi lisusu 'te Marie-Madeleine ayébi mbala mókó Yézu asékwi te, na bokanisi azali na "sinzili ya elanga". Likanisi lyoko sémbo na súka, po "asengelaki koyoka lisusu kombo na ye pe kososola mosála na ye ewuti epái ya Moto ya sika", esémbolaki Léon XIV.
Episkopo wa Roma na bozeli na maloba o ntei ya litéya ya moyamboli na ye Papá François na encyclique na ye Laudato si', alobaki epái esusu 'te, na elanga waná esika wápi batikaki Mobákemi "lokóla mbóto", ekosálema elonga ya mwinda likolo ya molili. Nsékwa, elobaki ye na simá ya Papá François, ekomi bôngó bokokisi ya mosála epesamaki na moto: kolona pe kobátela Bokeli, pe kobebisa yangó te.
Likambo ya molimo ya pasika pe eye ya nzinganzinga mobimba
Léon XIV abetaki nsete lokóla François na likambo 'te, na bozangi liso ya botáli, moto akotika kozala "sinzili ya elanga" pe akomi "mobebisi" na yango. Elikya ya bokristu ekoki te bôngó ekabwana na mikakatano ya nzinganzinga ya eleko na bisó: "Likambo ya nzinganzinga ekoki te kokitisama na molongó ya biyano ya mbango pe ya biténi (...) Esengeli ezala botáli boko, likanisi lyoko, motindo mókó ya bomoi, likambo lyoko ya molimo eye ezali boboyi yoko", ekebisaki Mokitani ya Petelo, na botángi mbala mókó lisusu mwá maloba ya encyclique Laudato si'.
Mongálá (rivière) ya mayi ya miso kino Yérusalem ya sika
Po ya Papá wa Roma, "bobalúki ya Marie na tóngo waná ya Pasika" ezali elembo 'te, mondimi mókó mókó abyangemi na tángo na ye na "bobalúki ya káti". Pe "ezali kaka na mbongwana o ntei ya mbongwana ndé tokoleka mongálá ya mayi ya miso kinó Yérusalem ya sika", elobaki Papá. Na bolobi 'te esengeli mingi mingi mbongwana mókó ekoki kobongola lisapo pe kobimisa bomoko ya sóló epái ya bato pe bokeli "bibangisami na bolúli ya ba mbwá ya zamba".
Na loléngé ena, ebakisaki Papá, "bána ya mibáli pe ya bási ya Eklezia" bakoki leló kokutana na ba milio ya bilenge pe bato basusu ya motéma molámu baye bayokaki "ligangi ya babola pe ya mabelé na botiki motéma na bangó kopasolama". Léon XIV alobaki likambo 'te bato mingi bazali lokóla baye balingi, na nzelá ya "boyokani na sémba koleka na Bokeli, boyokani boko ya sika eye ekokumba bangó koleka ba pótá bebo".
Koyoka baye bazali na mongongo te
Sántu-Papá asukisaki na bobeleli Elimo Sántu, zambi "apesa bisó likoki ya koyoka mongongo ya baye bazali na mongongo te". Bôngó, elobaki ye, "tokomona eye miso na bisó bikomona nanu te: elanga eye, to Paradizo, epái wápi tokokende kaka na koyamba pe bokokisi mókó mókó mosála ya ye móķó".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye
