Mibeko mya sika ya Kùria ya Roma ebimisamaki
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mibeko mya Curia ya Roma mpe mibeko mya basali na yango, oyo epesamaki o mokolo mwa lomingo 23 Novémbe, mokolo mwa Mokonzi wa biso Yezu Kristu, Mokonzi wa molongo mobimba, na Pápa Léon XIV, ebimisamaki mokolo mwa yambo mwa 24 Novembe.
Mobeko mwa liboso, motaleli bibongiseli mpe babiro oyo ezali na kati ya Kùria ya Roma. Elingi koloba Secretariat d’État, ba dicastères, bibongiseli ya kosambisa mpe bibongiseli ya nkita.
Ya mibale etaleli mibeko mya lolenge ya kobongisa, ya disiplini mpe ya nkita mpo na boyokani bwa mosala ya basali oyo bazali kosala na Secretariat d’État, na ba dicastères, na ba organismes mpe ba biro oyo ezali na kati ya Kùria ya Roma, mpe na ba institutions oyo ezali na boyokani nà Saint-Siège.
Mobeko moye mwa sika, mozwi esika ya mobeko moye mopesamaki na Saint Jean Paul II o mokolo mwa 15 Aprili ya mobù 1999, mpe ebandaki kosalelama o mokolo mwa yambo ya sànzà ya Yuli (1er juillet) kaka ya mbula monà. Esangisi mpe ekotisi mbongwana, makambo mya sika mpe makambo maye Pápa François abimisaki na kati ya mokanda mya mibeko ya bantoma Praedicate Evangelium ya mokolo mwa zomi na libwà ya sanza ya misato (19 mars) ya mobù 2022.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
