Mokitani ya Petro asepeli eyenga ya Saint André na Constantinople
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bakitani babale ya bantoma bazali kolakisa elembo ya bomoko oyo ezali komonisa boyokani makasi kati na Roma mpe Constantinople. Ezalaki na Saint André, ndeko ya Petro oyo bakundolaki mpamba te, amemaki Evanzile na Constantinople. Na molulu monà, nde Pàpa asukisaki mobembo mwa ye na Turquie. Na bokambi ya Patriarche Bartholomée I mpe na bokutani bwa Théodore II, Patriarche Orthodoxe ya Alexandrie, molulu moko mosantu, ya ngonga mibale esalemaki na Ekelezia ya Saint-Georges na Istanbul. Na nsuka ya misa, episkopo ya Roma asalaki lisukulu moko liboso lya bato nkama minei na tuku misato (430), kati na bango ezalaki mpe na ministre-molandi ya Grèce mpo na makambo matali bapaya.
Na kolanda linaka ya mobembo bwa ye, abetaki nsete, na likambo lya komunio, to bomoko, “Boyambi bwa Andre ezali mpe kondima na biso”, atako ayebaki ‘te, boyambi ezali na mikakatano oyo ezali kopekisa bondeko ya solosolo, kasi abosanaki te boyokani makasi oyo esangisi mangomba mibale: “Tosengeli kozonga nsima te mpo to mipesa na bomoko, mpe tokoki te kotika komitalela lokola bandeko mibali mpe basi kati na Kristu mpe kolingana lokola bandeko babali mpe basi kati na Kristu”.
Bosangani ya mangomba manso ya Ortodokse oyo ezali na bokonzi likoló na yango moko
Esili koleka mibu ntuku motoba, Pápa Paul VI mpe Patriarche Athénagoras bakanisaki ‘te “mibeko mya mabe mpe makambo ya mawa” oyo mamemaki na bokabwani ya 1054 esengelaki “kobomama na makanisi mya Eklezya". Engebene na Leon XIV, likambo lina ya ntina mingi efungolaki nzela ya kozongisa boyokani, ya kimya mpe ya boyokani oyo ezali kokola kati na Bakatoliko mpe Ba-Ortodokse. Boyokani bona, bokolisamaki “na nzela ya bokutani ya mbala na mbala, ya bokutani ya bandeko mpe ya masolo ya teoloji oyo ezali kopesa elikya”. Na yango, Léon XIV alingaki ‘te “mangomba manso ya Ortodokse oyo ezali na bokonzi likoló na yango moko, mazongela kosangana na molende monso na eklezya yoko”. Akomaki ‘te kosangana na mosala yango ezali moko ma makambo ma ntina mingi mpenza ya mosala mwa ye ya Bontomà.
Kimya, ezingelo mpe tekinoloji ezali lokola mikakatano ya mokili mobimba
Léon XIV alobaki lisusu ‘te Bakatoliko nà Ba-Ortodokse basengeli koyokana mpo na mikakatano mingi oyo bazali kokutana na yango. Kobanda na kotonga kimya na eleko eye ya bitumba ya makila mpe ya mobulu. ⁇ Ezali likambo ya kosala mpe kopona makambo oyo ekotonga kimya, bongo, tozanga kobosana te ‘te, yango ezali kaka mbuma ya boyokani ya bato te, kasi ezali likabo lya Nzambe. Na maloba manà, Pàpa alingi kolimbola ‘te: “Boboto to kimya ekozwama bobele na losambo, bomipima, mpe kogumbamela Nzambe. Ezali nde na nzela ya boyokani boye bwa bomoi bwa biso elongo na Mokonzi oyo, asalisaka biso na kososola maloba, bilembo mpe misala mya kosala”.
Mokakatano mosusu oyo bato banso bazali kokutana na yango, ezali “mpasi oyo ezali kobangisa bato mpo na kobatela zamba na mai (ezingelo)” oyo, na maloba ma Bartholomé Ier, ezali kosenga “kobongwana na elimo, ya moto na moto, mpe ya bato banso na lisanga” mpo na kobatela bikelamu bya Nzambe.
Mokakatano ya misato oyo Pápa alobeli, etaleli lolenge ya kosalela batekinoloji bya sika, mingimingi na makambo etali elanga ya bosololi. “Lokola bandimi ya Eklezya ya Katoliko mpe ya Lingomba ya Ortodokse bayebi ‘te yango ezali na matomba mingi mpo na bato, basengeli kosala elongo mpo na kolendisa bato banso básalela ezingelo na lolenge elongobani to na ndenge ebongi, mpo bato banso bákola malamu, mpe mpo bato banso bázwa yango, mpo ‘te matomba ma yango mozala kaka mpo na bato bake te, to mpo ‘te, mbano na yango, ekende na bato bake baye bazali na lokumu”.
Bilako kati na bandeko ya makila
Léon XIV asukisaki lisukulu na ye na nsuka ya misa mpe atombelaki o motema soke, bolamu, kolungono bya nzoto mpe kimya na mokolo moye mosantu ya eyenga ya mobateli mwa Constantinople. «Hrònia Pollà! Ad multos annos!» Na nsima, Pape elongo na Bartholomée bapesaki bobenisi ya ekelézia bo momeseno, na balcon ya Patriarche ya Ekelézia mpe na nsima bakendaki kolya esika moko. Mbula na mbula, kobanda na 1964, lingomba lya Roma ekendaka na feti ya Saint André o mokolo mwa 30 Novémbe. Lisusu, na mokolo mwa 28 ya Yuni, mokolo moye bakanisaka basantu Petro (Petelo na Polo, basantu baye babatelaka engumba Roma, bamemi-nsango ya Pápa Monene ya Eklezya Katoliko bakendaka na Vatican.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
