Luka

Na losambo la Angelus, Pàpa alobi ‘te: «Mobulu mokoki kobebisa elikia soki moke te»

Kati na maloba na ye na ntina yaNsango Elamu ya mokolo mwa 16 Novɛémbe, na tango ya Angelus na esika ya Santu Petro, Léon XIV alobelaki ntina ya kopesa litatoli na ntango mpe na makambo ya mpasi mingi. Makàmà minene mpe minyoko mikoumela soki te, nzokande, esengo ya baye bazali kondima Yezu lokola Mobikisi, ekoumela libela.

Albys KBD CP, - Kinshasa/RDC

 

Leo XIV Mbela ya Yezu ‘te tótika te ‘te bobanga ekotela biso, ezali likambo lya ntina mingi na moi mwa lelo. Alobaki yango na lininisa ya Palais apostoliki, na Place Saint-Pierre liboso ya basembwi (fideles) 40 000. O kati ya bango, mingi mpenza ezali baye bayaki mpo ya kosepela Zubilé ya mokolo mwa mokili mobimba ya bobola. Mingi bakotaki o bazilika te, bazalaki libandà mpo bayaki na nsima. Lokola mobu mwa losambo ezali kokende na nsuka, ezali libaku lya komona ‘te Yezu, «abyangi biso totika molimo ya bobangi». Ekomami bongo Nsango Elamu ya Santu Luka.

Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te «mikolo minso tozali koyoka bansango ya bitumba, ya makàmà mpe ya minyoko oyo ezali konyokola bamilió ya mibali mpe basi». Nzokande, «liboso lya minyoko» mpe «ya molimo ya kozanga kokipé basusu oyo ezali koluka kowangana yango», Yezu ayebisi biso ‘te «mobulu ekoki kobebisa elikya ya baye bazali kotyela ye motema to baye bandimeli ye te», elobaki Tata Mosantu. «Mingi mingi, tango ngonga ekomi molili lokola butu, boyambi to kondima ekongenga lokola moi”, ekobakiye koloba.

Kotatola ata na tango ya minyoko to ya mpasi

Ezali na ntango wana ya molili nde bayekoli ba Kristu bamikolo mya lelo,  basengeli kowza libaku lya kopesa litatoli. Solo, Léon XIV alobi ‘te: “Monyoko mya bakristu ezali kosalema bobele na bibundeli te, mpe na konyokola bato te, kasi ezali mpe kosalema na maloba, elingi koloba, na nzela ya lokuta mpe na mayele mabe ya makanisi”. “Ezali mingimingi ntango tozali konyokwama na mpasi oyo, ya nzoto mpe ya molimo, nde tobengami mpo na kotatola bosolo oyo ekobikisa mokili; bosembo oyo elongolaka bato na monyoko to ebimisaka bato na boombo; elikya oyo ekolakisa bato banso nzela ya kimya to boboto”.

Na maloba na ye, Yesu azali bobele komonisa ‘te “makámá mpe mpasi ya lisoló ya bato ekosuka, nzokande esengo ya baoyo bayambi yé lokola Mobikisi, ekoumela libela na libela”. Sé bongo, boyiki mpiko ya biso ekobikisa bomoi bwa biso, lokola Nsango Elamu ezali kosakola yango. Ezali elaka ya Mokonzi oyo ezali kopesa biso makasi ya kotelemela makambo maye mazali kobangisa biso mpe masumu minso moye tozali kosala. Tozanga makasi te liboso lya mpasi, mpamba te yemei apesi biso “maloba mpe bwanya” mpo na kosala bolamu tango inso, na motema moko”.

Na nsuka, Pape ayebisi biso lisusu ‘te “ezali mingi mingi ba martyro nde bazali kokundwela biso ‘te ngolu ya Nzambe ezali na makoki ya kobongola ata mobulu, na elembo ya lobiko”. Na yango, na losambo lya biso, tósenge Maria, asunga bandeko babali mpe basi bazali konyokwama mpo na nkombo ya Yezu, na bampasi bazali kokutana na yango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

16 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 21:51