Na Novémbe, Pápa asengi ‘te básambela mpo na komibatela na komipesa liwa.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na edition ya video ya Pàpa ya sika (La Vidéo du Pape) oyo ba bimisaki na Réseau Mondial de Prière du Pape o mokolo mwa mibale mwa 04 ya sànzà ya Novémbe, nà lisalisi lya diocèse de Phoenix (Arizona, États-Unis) oyo ezali kosàala elongo nà Vatican Media, Pàpa Leon ya zomi na minei asengi ‘te na sànzà eye ya novémbe ya mobù 2025, bakatoliko bakosambela mp ona bato baye balingi komiboma. Maloba ma yé mp ona likanisi linà ezali boye: “Tosambela mpo ya bato baye bazali kobunda na makanisi ya komiboma, mpo ‘te bakoka kozwa lisungi, bokebi mpe bolingo basengeli na yango, o kati ya mangomba to mboka ya bango” mpe “bakoka komona kitoko ya bomoi”. Na yango, Léon XIV alendisi Bakatolike na mokili mobimba ‘te básunga “bato banso bazali na molili mpe bazangi elikya” mpe baoyo bazali kobunda na makanisi ya komiboma. Mpe abakisaki ‘te ata bandimi “bakoki kozala na mawa mpe kozanga elikya”.
Bomibomisi, ezali mokakatano oyo ekonyokolo mokili mobimba
OMS, ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolongono bwa nzoto elobi ‘te bato soki 720 000 bazali komiboma mbula na mbula na mokili mobimba. Elingi koloba, bato pene na 2 000 bazali komiboma mokolo na mokolo. Komiboma ezali ntina ya misato oyo esalaka ‘te bilenge mpe mikóló bákufa. Yango wana, Pápa asengi na Eklezia - ba diosezi, ba paloase, ba mangomba ya bamibonzà, makita ya bandimi (ba associations ya ba fidèles) mpe bongo na bongo, bayoka mpe balanda na “motema ya botosi mpe ya mawa” oyo “ekoki kopesa libondisi mpe lisungi” na baye bazali na mikakatano. Tata Mosantu abondeli lisusu ‘te “Mokonzi alakisa biso kozala pene na bango, na limemya mpe na boboto”.
Eklezya ezali komitungisa mpenza mpo na bokolongono bwa makanisi
O mokolo mwa misato, 5 Novémbe, ekobanda na Rome, liyangani moko ya mokili mobimba oyo Lisangá ya baministre ya Eklezya Katoliko ebongisaki mpo na kolongono ya makanisi. Mpamba te, na mibù miye miùti koleka, Eklezya ya Katoliko ekómaki kotya likebi mingi na maladi ya motó, ezala na nzela ya mabondeli to na lolenge ya kosalisa bato oyo bazali na maladi yango. Na boumeli bwa mikolo misato mobimba, bato oyo basalaka mosala ya kobatela bato ya maladi ya motó, oyo bautaki na mokili mobimba, bakotalela lolenge kani lisangá ya bokristo ekoki kosalisa bato baye bazali na maladi ya motó, konyokwama na makanisi, mpe baye bazali konyokwama makasi na makanisi, mpe ndenge oyo bakoki kosalisa bango mpo bámiboma te, na nzela ya koyoka bango mpe kozala pene na bango.
Ko accompagner mpe kobanza liboso
Mgr John Dolan, episkopo ya Phoenix, alobi ‘te likambo la losambo la Tata Mosantu mpo na sanza oyo ya Novémbe, ezali na motema mwa ye. Mpamba té, ye moko akutanaki na mpasi ya kolela moto oyo amibomaki. Alobaki yango na maloba maye : «Na bungisaki ndeko wa ngai Tom, lisusu, bandeko ba ngai ya basi Terese na Mary, mpe semeki na ngai ya mobali Joe, bakufaki bango banso na komiboma. Ezali na bampota mpe mabombamo oyo tokoki kososola te. Atako bongo, tozali kaka na elikya!». Bongo akobi lisusu ‘te: “Soki ozali komiyoka “te olembi, soki ozali kobunda na makanisi ya komiboma, yebá ‘te olingami mingi mpe ‘te, lingomba ezali wana mpo na yo. Ozali yo moko te !”.
Eklezya ekoki kozwa esika ya minganga te
Tata Cristóbal Fones, mokambi ya Réseau Mondial ya Libondeli ya Pàpa, alobi ‘te: «Motó ya likambo ya komiboma ezali mpenza na ntina mpo na Lingomba». Bongo alobi ‘te, ezali mbala ya yambo té, oyo bakosambela mpo na kolongono ya moto. Na Novémbe ya mobù 2021, Pàpa François abyangaki biso tosambela mpo ya baye bazali na bokono bwa depression. Lisusu na sànzà ya Aprili ya mobù 2020, likanisi ya losambo ezalaki «Mpo na baye bazali baombo ba biloko oyo elangwisaka, ezali kokanisa biso ‘te lisangá lya bokristu esengeli mpe kosalisa bato oyo bazali na mpasi to ba mpota na motema».
Abeti nsete mingi na maye Pàpa alobi ‘te: «Elakisi tè ‘te, biso banso tozali na nse ya minyololo mya bozali mawa to ya bozangi elikya » ; likambo liye, etali moto nyonso, ezala ata basàngo mpe bamibonzà.
Motema mwa biso bato, lokola moye mwa Yezu, ezangi ba mpota te mpe na mpasi. Moto moko te akoki kokima molili ya kozanga elikya. Yango wana, Na yango, alobi ‘te “masangá ma bokristu masengeli kokóma bisika ya koyamba mpe ya kosunga; epai baoyo bazali na mpasi basengeli komiyoka ‘te bazali na ndako na bango”.
Tata Cristóbal Fones, ayebisi mpe lisusu ‘te, “Ekelezia, ezwi esika ya baminganga tè, ba psychologues, ba thérapeutes - kasi ekoki kosala mosala ya ntina na kozala pembeni, koyoka mpe kopesa elikia”. Mpamba te, ezali na ba paloase mpe na ba communautés diocésaines epai wapi toyekolaka lolenge ya bomoi oyo etongaka bokengi: kokende kokutana na bato baye bazali na mpasi, kobondisa baye bazali na mawa, kosalisana, kokabola elikia oyo ezali kopusa biso na mosala; esukisaki ye koloba.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
