Pápa asambeli mpo na bato baye bakufaki na ya bitumba ya ba terroristes na RDC
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Ba martyro oyo Pàpa alobelaki mwa moke liboso na maloba na ye na Evanzile, ezali bakristo oyo «bazali kobwakisa mpe konyokola». Alobaki yango nsima ya losambo la Angelus, ut’o ininisa lya ndako apostoliki, liboso ya esika ya Saint-Pierre. Eyambaki bakristu nkoto tuku minei (40 000) o mokolo mwa lomingo. Ba martyro oyo bazali na Bangladesh, na Nigeria, na Mozambique, na Soudan mpe na bikolo bisusu epai wapi bazali kobundisa mangomba ya bakristu mpe bisika ba bango ya losambo. Ezali mpe bongo na Républiki démocratiki ya Congo, epai wapi «o mikolo miye euti koleka, babomaki ebele ya basivili » mpe bato soki tuku mibale (20) bakufaki na «mobulu ya bateroriste». «Nazali elongo na mabota ya Kivu na losambo», elobaki Léon XIV, mpe asengaki na mabondeli ‘te mobulu manso esila, mpe ‘te baklisto basangana mpo na bolamu bwa bato banso».
Mobulu oyo Papa alobeli esalemaki na butu ya mokolo mwa mitano mpo nakomona mokolo mwa poso, na mboka ya Biambwe, na ntaka ya bakilometele ntuku minei (40 km) nà Butembo, na etúká ya Nord-Kivu, na batomboki ya Ouganda ya ADF (Forces démocratiques alliées) oyo bapesaki mosolo na etuluku ya bateroriste ya Islamiste ya Etat islamique. Ba terroristes babundisaki centre ya santé ya mboka, batumbaki yango, babomaki bato zomi na motoba (16 personnes). Bato basusu mibale bakufaki na masasi na ba kartye ya pembeni. Ezali nde secrétaire ya police ya Biambwe nde ayebisi na AFP. “Bandako ezali kotumbama mpe bato bazali kozanga”. Croix-Rouge ya mboka eyebisi ‘te bato tuku mibale na misato (23 bakufi).
Mboka Ukraine na nsé ya ba bombi
Pàpa atiki tè komitungisa mpo na Ukraine. “Nazali koyoka mawa na nsango ya bitumba oyo ezali kokoba na bingumba mingi ya Ukraine, ata mpe na Kiev. Yango ezali koboma mpe kozokisa bato, ata mpe bana, mpe ezali kobebisa biloko ya ntina mpo na bato, mpe ezali kotika mabota na kozanga bisika ya kolala ntango malili ezali koya makasi. Nazali kosala nyonso mpo na kozala penepene na bato oyo bazali konyokwama. Tokoki te komesana na bitumba mpe kobebisama! Tosambela elongo mpo na kimya ya sembo mpe ya libela na Ukraine oyo ezwami na mpasi”, ebelelaki ye
Makanis ma Pàpa, ekomaki mpe na Pérou, epai wapi likámá ya motuka esalemaki mokolo mwa misato. Na engumba Arequipa, na sudi ya ekólo ekolo. Bisi to motuka moko ekweaki na lobwaku nsima ya kokutana namwa motuka moko. Bato 37 bakufaki, mpe bato mosusu 24 bazokaki. Motuka ya etaje mibale ekitaki na ntaka ya metele nkama mibale (200). «Tika ‘te Mokonzi ayamba bawei, asunga baoyo bazoki, mpe abondisa mabota oyo bazali na mawa».
Bokengi bwa nzela mpe mbebà
Nganganzambe monene abendaki lisusu likebi na likambo lya libateli na nzela, mpe alobaki ‘te « o mokolo mwa 16 Novémbé, tokanisaka bato baye bakufaki na nzela, oyo mbala mingi ebimaka mpo na bizaleli ya bato oyo bazangi limemya». Alobaki ‘te: “Tiká ‘te moto na moto amitalela to mpe amisosola”.
Bato basusu bazali baye banyokwamaki na likambo ya mbebà. «Nazali kosangana na Eklezya ya Italie oyo ezali kosenga lelo mokolo mwa losambo mpo na bato bazwaki likàmà mpe baye babikaki na likàma lya bisis lya mbebà, mpo ‘te ezalela ya limemya ekoka kokola lokola ndanga ya bobateli bya lokumu ya moto nyonso. Mingi mpenza ya bana mike mpe ya baoyo bazali na makoki mingi te».
Na nsuka, na mokolo moye mwa Zubilé mpo na babólá, Pápa atondaki botondi na bato banso oyo, kati na ba diosezi mpe na bapaloase, babandaki likanisi ya kosunga bato baye bazali kati na bosenga. Na yango, Léon XIV azongelaki toli ya exhortation apostoliki Dilexi te oyo ezali kolobela “ntina ya bolingo mpo na babola. Ezali mokanda oyo Pápa François abandaki kokoma na basanza ya nsuka ya bomoi bwa ye”, mpe oyo wapi, alobaki ete, “na esengo mingi, nasilisi yango”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
