Luka

2025.11.20 Assisi - Pàpa Pápa asàmbeli na lilita lya Santu François na Asizi, o mokolo mwa 20 Novémbe 2025, na Asizi. 2025.11.20 Assisi - Pàpa Pápa asàmbeli na lilita lya Santu François na Asizi, o mokolo mwa 20 Novémbe 2025, na Asizi.   (@Vatican Media)

Pápa asàmbeli na lilita lya Santu François na Asizi

Léon XIV akómaki na engumba Asizi, epai wapi akutanaki na baepiskopo ya Italie oyo bayanganaki na likita na bango ya mbala ya tuku mwambe na moko (81é) o mokolo mwa minei, mwa 20 Novémbe. Yambo te akutana nà CEI, episkopo wa Roma aelemaki na eteni ya nse ya ndako-nzambe Sainte-Marie-des-Anges mpo na komemya Poverello.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

«Ezali lipamboli kozala awa lelo na oy’esika Mosantu. Tokomi pene ya mibu nkama mwambe (800) ya liwa lya Santu François, oyo epesi biso libaku lya komilengele mpo na kosepela mosantu monene ya bomikitisi mpe mobola ntango mokili ezali koluka bilembo bya elikia»; wana nde maloba ma Leon ya Zomi na minei, liboso lya lilita lya François ya Asizi. Ezali bongo telemé ya liboso lya mobembo mwa ye na mwa engumba eye ya Ombrie; bisika wapi, o mokolo mwa tuku mibale ya sànzà ya Novémbe (20 novembre) akutanaki na ba baepiskopo ya lisanga lya baepiskopo ya Italie, na nsuka ya likita linene lya bango ya mbala ya tukù mwambe na moko.

Bokomi o mboka Assizi

Na ngonga ya mwambe na tongo, Mokonzi Nganga-Nzambe monene, akómaki na élikotele pene na engumba Asizi, mpe na nsima atambolaki na motuka tee na engumba ya Le Poverello. Na bowumeli bya bikeke, ba Pàpa tuku mibale (20), bakendaki kotala esika yango ; mpamba te, ezali yoko esika etondi na misala ya bontoki, na masolo ya kala, na bizaleli bya bankoko, kasi ezali mpe esika ya losambo, epai wapi, bamilio ya bato bakendaka kosambela. Na 2020, Pape François atiaki maboko na mokanda na ye «Fratelli Tutti».

Pàpa na nsé ya crypte ya bazilika, liboso ya lilita ya Poverello
Pàpa na nsé ya crypte ya bazilika, liboso ya lilita ya Poverello   (@Vatican Media)

Boyambi na baziliki ya nsé ya mabele

O mokolo mona mwa minei, Léon XIV akotaki na molongo na bango. Yambo ‘te akutana na baepiskopo ya Italie na ndako-nzambe Sainte-Marie-des-Anges, mwa moke nsima ya ngonga ya 8:30 ya tongo, Pápa alingaki kokende na lilita ya mosantu Mokonzi ya Italie. Mwa bato mingi bazalaki kozela ye, atako mbula ezalaki kobeta, mpe mokolo mozalaki malili mpenza. Bazalaki koyemba banzembo, « Veve le Pàpa». Liboso lya ezibelo ya Bazilika, Tata episkopo wa lokumu Matteo Zuppi, mokambi CEI, mpe mokengeli ya Lingomba esantu, Momfelele Marco Moroni, oyo elongo nà ye, ezalaki bamomfelele basusu. Banso elongo, bamemaki Mokitani mwa Santu Petro na Crypta. Ezalaki ya kopela na mwinda ya mafuta, oyo na mobù moye, ezalaki ngala ya engumba Abruzzes. Likolo na yango, ezalaki na elili ya mutsopi ya Paradiso ya Dante: “ezali bongo se mingalo mya minda mwa yé”. Ezali mpo na kopesa lokumu na mibù nkamba mwambe ya ya liwa lya Poverello, oyo ezali kopusana.

Losambo na lilita ya Poverello

Kuna, liboso ya bifelo wana ya mabanga ya kala oyo ezalaki na nse ya etumbelo monene ya esika mosantu, esika oyo Ukaristya ezalaka, azalaki na mwa ntango ya kimya mpe ya bomanioli. Na nsima, maloba mosusu, oyo ebimisamaki na nzela ya bikoliseli-lolaka na libándá, emonisaki lisusu nsango ya elikya oyo moto moye ya moke, kasi ya monene, azali naino kopalynginya o kati ya eklezya mpe na mokili mobimba na o bileko binso sima ya bikeke.

Pàpa apesi mbote ut'o ndako-nzambe Sainte-Marie-des-Anges
Pàpa apesi mbote ut'o ndako-nzambe Sainte-Marie-des-Anges   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

21 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:11