Likita lya banso: "Liwa, moteyi moko monene ya bomoi"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Na poso eye ya ibale ya eleko ya adventi, Papá amemi likanisi lyoko etali liwa eye "ekomonana lokola likambo ya mokili pe likambo ya mokili te". "Ezali ya mokili, po moto nionso akobika na mabelé awaka. Pe ya mokili te, po posa ya bomoi pe ya boseko eye toyokaka po ya biso moko, pe po ya bato tolingaka ekolakisa biso liwa lokola etumbu, lokola eloko yoko ya ntina te", elobaki Léon XIV o eleko ya likita lya banso, na esika ya Sántu-Petelo.
"Liwa nde nini? Ezali na liloba ya suka na bomoi na biso?". Wana bizali mituna bibimaki na malongi ya Papá, pe kaka moto amitunaka ya sóló, po kaka ye moko ayebi 'te asengeli kokufa, elobaki ye. "Baniama bayokaka pasi, ya sóló, pe bayebaka 'te liwa ekomi pembeni", kasi, etalisaki Papá, "bayebi te 'te liwa ezali kati ya bomoi na bango. Bamitunaka te eye etali lolenge, ntina, suka ya bomoi".
Boni boni pe tango nini ekokoma?
Moto azali na boyebi na yango, kasi yango "ekobikisa na liwa te", kasi, na ndenge mosusu, elimbolaki ye, "yango ekokomisa ye moto ya pasi" na botali bikelamu bisusu ya bomoi. Papá Léon XIV asosolisaki, uta likanisi ena, 'te "tozali bikelamu ya lolenge lisusu, ya mawa, kaka po tokokufa te", kasi "po toyebi 'te likambo ena ekosalema, ata soki toyebi boni boni pe tango te".
Boleki na biso na mabelé ekobongisa biso na boseko
Koyeba 'te liwa ezali, pe mingi komanyola bosóló ena, "ekoteya biso kopona eye tolingi kosala mpenza na bomoi na biso. Kosambela, po ya koyeba eye ezali na ntina po ya bokonzi bwa likolo", pe "kotika ya pamba eye esangisi biso na mambi mikoleka, wana ezali sekele po ya kobika na ndenge elongobami, na boyebi 'te elekela na biso na mabelé ekobongisa biso po ya boseko", elimbolaki episkopo ya Roma, na botangi Sántu Alphonse Marie ya Liguori, na buku na ye eyebana na nkombo “Apparecchio alla morte (Bobongisi na liwa)". Na bopesi likanisi lyoko etali "motuya ya boteyi liwa", mokeli ya Lisanga ya ba rédemptoriste pe docteur ya Eklezia, alobaka 'te liwa ezali "motéyi moko monene ya bomoi".
Mwinda eye ekongengisa mobombano ya liwa
Liboso ya liyoki lyoko ya boyebi pe ya bozangi makasi, na motatabano pe ya bobangi eye moko moko akoki koyoka, Papá alobi lisusu 'te "liwa ezali suka te, kasi elekela epai ya mwinda makasi, epai ya boseko ya esengo". Mwinda ya sika ya Nsekwa etikali kaka likambo ena "ekoki kongengisa makasi mobombano ya liwa. Na mwinda ena, pe kaka na ye, ekomi ya sóló eye motema na biso elingi pe ekolikya".
Esengo ya bomoi suka te
Kristu Asekwi akutanaka na bomeki bonene ya liwa, na bobimi molongi likolo ya nguya ya Bolingo ya bonzámbe, elobaki lisusu Mokitani ya Petelo, na bolobi 'te "abongisa po ya biso esika ya bopemi ya seko, ndako esika wapi tozelami; apesa biso bokangemi mobimba na bomoi esika wapi bilili, bopengoli bizali te".
Likolo na Ye, liwa pe mosekwi na bolingo, na sántu François "tokoki kobenga liwa 'ndeko’. Kozela yango na elikya ya Nsekwa, ekobatela biso na bobangi ya kokufa po ya libela pe ekokabola biso na esengo ya bomoi suka te", elobaki Papá.
Matondo mingi na ndenge otangi lisolo liye.
