Luka

Ekeko ya Ngondo Maria abotami na lisumu tena esika "piazza di spagna" Ekeko ya Ngondo Maria abotami na lisumu tena esika "piazza di spagna" 

O mokolo mwa mwambe ya sànzà ya Desembe (8 Dec), Pàpa Leon XIV akopesa lukumu na Kumbama ya Maria ezali na lisusmu te, na Place d’Espagne.

O mokolo mwa yambo, mwa 8 desembe, Leon XIV akokende na esika Mignanelli na ntaka ya bitambi moke, nà esika Piazza di Spagna na ngonga ya 16h00. Kuna, akopesa lokumu na nse ya ekeko ya Ngondo Maria. Tata mosantu akosala lokola momeseno, kopesa lokumu na Maria. Mobù mouti koleka, Pàpa François asambelaki kuna mpe abonzelaki ye zubilé ya elikya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mokolo ya yambo, 8 Desembe, lokola limeseno ya losambo, bato bakumisaka kumbama ya Ngondo Maria, ezali na lisumu te. Bakonzi ba engumba ya Rome mpe ya mangomba ndenge na ndenge bakosambela mpe bakotya bafololo liboso ya ekeko ya Maria na esika babengi “Mignanelli”, na kati ya engumba ya Roma, Pápa Léon XIV mpe akosambela na nse ya ekeko ya Maria. Mbula eleki, na mokolo mwa 8 ya sanza ya desembe ya mobu 2024, ezalaki Pàpà François (c'est le Pape François qui avait prié aux pieds de Marie) nde abondelaki na makolo mya Maria mpe atikaki o maboko ma ye, Zubilé oyo ezalaki koya, “yoko nsango ya elikya mpo na mokili ya bato baye bazali na mikakatano mpe na bitumba”. Mwa baposo liboso ‘te nsuka ya mobù mosantu mokoka, Léon XIV akozonga epai ya Maria mpo ya losambo.

Boyei bwa Pápa Léon XIV

Kati na liyebisi moko oyo epesamaki na Vicariat ya Roma, elobaki ‘te bato ba liboso bakotya bafololo liboso lya ekeko ya Santu Maria, lokola momeseno mokozala, basáli ba mosala ya koboma moto, mpo na kokumisa baninga na bango nkama mibale na tuku mibale (220) oyo bafungolaki mosala monà o mokolo mwa 8 Desembe ya mobù 1857. Na ngonga ya nsambo na ntongo (7h00), bakokende na nsonge ya ekeko mpo na kotya motole (ekoti) na bango ya fololo na loboko la Ngondo. Na nsima ya nzangá, na ngonga ya minei (16h00), Pápa akoya mpe Episkopo wa lokumu Baldo Reina, mokengeli ya dioseze ya Roma, mpe na Roberto Gualtieri, mokonzi ya engumba, bakoyamba yé. Aksambela na nsé ya likonzí oyo ezali na bolai bwa bametele zomi na mibale (12 m), oyo likoló na yango ezali na ekeko ya Ngondo, mpe akotya ekoti (motole) ya fololo. Na ngonga ya 8h30 ya ntongo, babeti-miziki ya Gendarmerie ya Vatikan bakoyemba loyembo mpo na Ngondo Maria; na nsima, parwase ya Sant'Andrea delle Fratte, Ordre souverain de Malte, Légion de Marie, Cercle Saint-Pierre, Fondation Don Gnocchi, Unitalsi mpe biteyelo mingi ekopesa Maria matondi. Na ngonga ya libwa, na eklezia ya Trinité-des-Monts, ekozala na misa ;  oyo ekokambama na Mgr Francesco Pesce, mokambi ya dioseze mpo na misala ya bato mpe ya mosala, elongo nà basali ya ba entreprises ya Roma.

Losambo mpo na Maria na mikolo libwa

Bamomfelele ya monastele ya Basiliki ya ba Saints Apôtres na Roma bakoyangela milili mya mokolo mwango. O kati ya bazilika enà, esalemaka ut’o mokolo mwa 29 Novembe tee mokolo mwa 7 Desembe, mikolo minso na ngonga ya 5:45 ya mpokwa, basambelaka na kati ya ndako-nzambe yango. Na nsima, na ngonga ya 6:30 ya mpokwa, basambelaka misa oyo ebandisamaka na nzembo ya “Tota Pulchra”, oyo ndeko Alessandro Borroni, ya monastele asalaki.

Ba misa mikambami na lisalisi lya ba Episkopo ya lokumu.

Na mokolo mwa misato, mwa 3 Desembe, misa na ndako ya Basantu Bantoma ekotambwisama na Kardinal Angel Fernandez Artime, Pro-préfet ya Dicastere ya ba Institutes de Vie Consacrée mpe Sociétés de Vie Apostolique. O mokolo mwa minei, ezali Kardinale Claudio Gugerotti, mokambi ya departema oyo etalelaka mangomba ya Azia nde akokamba molulu mwango; mpe na mokolo mwa mitano, na mokolo mwa 5 Desembe, ezali Kardinale Rolandas Makrickas, nganga-nzambe monene ya Basilique Sainte-Marie-Majeure, oyo ezali ndako ya Pápa nde akokamba milulu minà. Na bosukisi, o mokolo mwa poso, mokambi ya Causes des Saints, kardinale Marcello Semeraro, akosala misa; na mokolo ya poso, mokambi ya Vatikan, kardinale Mauro Gambetti, mokambi ya Vatikan, akosala misa. Na mokolo ya yambo, mwa 8 Desembe, Kardinal Leonardo Sandri, mokambi-molandi ya Collège des cardinaux, moto akokamba molulu mya Ukaristya.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

04 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 11:11