Républiki ya Congo: episkopo mosungi ya sika na dioseze ya Nkayi
Albys KBD, CP -Kinshasa/RDC
Mgr François Halyday Mbouangui abotamaki na mokolo mwa 4 okotobe ya 1977 na Mindouli, na dioseze ya Kinkala. Nsima ya koyekola filozofi na likindo monene ya mboka (Grand Séminaire nationa), Mgr Firmin Singha na Brazzaville, ayekolaki théologie na Université pontificale urbaniana na Roma.
Akulaki bonganga na mokolo mwa 14 ya sànzà ya yuli 2007, na nkombo ya diosezez ya Nkayi, Mgr Mbouangui azalaki secrétaire personnel ya Mgr Daniel Mizonzo, ordinaire ya esika wana, na nsima azalaki chancelier ya dioseze, na nsima mokambi ya pastorale ya bilenge mpe mosungi na parwase ya Saint-Louis ya Nkayi, mpe mbala mingi azalaki Sango-molandi ya parwase na San Rocco, na Pedemonte mpe na Santa Maria Assunta, na Manerba del Garda, liboso ya kolanda kelasi na ye ya communication mpe ya journalisme na Université ya Vérone.
Sima ya kozwa diplomi ya master na édition mpe journalisme, banda 2023 azalaki mokambi (directeur) ya Centre diocésain ya communication sociale, mpe azalaki moko ya Conseil mpo na makambo matali nkita (les affaires économiques), tango azalaki kosala ministère pastoral na ye lokola Molandi ya parwase na Saint-Michel de Madingou-Poste.
Mgr Mbouangui akozala episkopo-molandi ya diosezee, na mopanzi ya episkopo Mokonzi ya Nkayi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
