Luka

Angélus: Vivre na Karézimo lokola nzela ya bonsomi mpe ya libiki ontei ya yo.

Na Lomingo loye la yambo ya eleko ya Karezimo, Léon ya XIV abyangi bakristu, bayanganaki na Place Saint-Pierre mpo na losambo la «Angelus», mpo na kokota na eleko eye ya losambo, lokola na «nzela mozali kongenge», esimbami na bilembo biye : «Losambo, kokila bilei mpe kokabela babola». Na komaniola Nsango Elamu komekama ya Yezu na eliki, Tata Mosantu akundoli ‘te eleko ya Karézimo ezali eleko ya bosolo, ya etumba ya molimo mpe ya kozonga sika ontei ya yo.

Albys KBD, CP- Kinshasa/RDC

 

Na komaniola Nsango Elamu ya Santu Mateo, Pápa amonisaki ‘te Yezu, «nsima ya kokila bilei mikolo ntuku minei, ayokaki bozito bwa bomoto bwa ye», ezala na nzoto to mpe na makanisi. Kati na mimekano mya Zábolo, Kristu « anyokwamaki na lolenge loko biso banso tozali konyokwama o nzela ya bomoi bwa biso», mpe na elonga ya yé, azali kolakisa biso lolenge ya kolónga mayele mabe mpe mitambo mya monguna. Bozali pembeni bwa Kristu na bomoto bwa biso, engengisi ndimbola ya Karézimo; eleko eye mondimi azalaka ye moko te na kati ya mimekano, kasi azali elongo na Ye oyo asilà sé kolónga mabe.

Karézimo, Nzela mpo na kozongisa bomoi sika

Léon ya XIV alimbolaki Karézimo lokola nzela ya molimo, ezali kopesa nzela na “kozongisa sika boyokani bwa biso nà Mokonzi mpo na kokokisa mosala monene mwa bomoi bwa biso”. Na nzela ya losambo, ya kokila bilei mpe ya kokaba, ezali lolenge ya “kotika Nzambe alongola matanga mpe abikisa bampota boye masumu etikaki o kati ya biso, mpo ‘te bomoi bwa mokristo ekola nà bonzenga to kitoko na yango inso kino na bolingi oyo ezali liziba lya esengo ya solosolo”. Tata-mosantu andimaki ‘te ezali nzela ya mpasi, ezali mpe na likámá lya kolemba nzoto to kokima epai ya libateli ya lokuta.

Tango alobelaki komekama Yezu akutanaki na yango, Pápa akebisaki na ntina na “banzela bya bisengo ekoùmelaka tè, lokola bozwi, lokumu mpe bokonzi”. Kasi akebisi ‘te: “masenginya mana maa lokuta ezali nde makambo ya mabe oyo eyaka na esika ya esengo oyo tosengeli kozala na yango”, mpe ezali kotika moto “na kozanga kokakatana, na kozanga elikya, mpe na kozanga eloko”. Nzokande, kobongola motema ya mokristu ezali kopesa nzela na bonsomi ya motema. Na kotanga Santu Paul VI, Léon ya XIV akundwelaki ‘te, na esika ya “kokómisa bomoto bwa biso mobola, kobongola motema ekómisi moto mozwi”, akopetola ye mpe ekopesa ye makasi “na etamboli na yé na nzela ekomema na esika oyo nsuka na yango ezali bolingo mpe komipesa na Mokonzi”.

Karézimo ya sikisiki: Kofanda nyee, koyóka, mpe koyókela ngolu

Pàpa abyangi na misala ezali komonana mpo na eleko ya Karézimo eye. Komipima ya solosolo na losambo, mpe  misàlà mya ngolu. Na “kozala nyee”, asengi ‘te, “tokanga batelevision, radio, smartphone ba biso mwa ngonga moke”. Alendisi na komaniola liloba lya Nzambe, kosangana na ba sakramentu mpe koyóka na motema Elimo Santu, kasi mpe lisusu boyókanani kati na mabota, na bisika bya misala mpe na mangomba. Mingi mpenza, “kotàla baye bazali bango moko, lokola babangé, babólà, mpe bakoni to bato na maladi”. Abosani tè kokabola biloko na baye bazangi sóló eloko.

Na kotanga Santu Augustain, Pàpa akundweli ‘te; «losambo esimbami na bomikitisi mpe bondeko, na kokila bilei mpe na kokaba, na komipimela mpe na kolimbisa, na mposa yakosala bolamu, kasi kozongisa mabe té, na kokima mabé mpe koluka bolamu, … ekosima likolo mpe ekopesa biso kimya». Soko ekomi na kimya ya motema, moto akoluka Nzambe.  Na nsuka ya maloba ma ye, Léon XIV apesaki mobembo mya Karézimo o Maboko ma Maria Ngondo, «Mama oyo akosungaka bana ba ye tango inso o kati ya mimekano», mpo asunga bandimi na nzela ya bobongoli mitema mpe ya elikya.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

22 sánzá ya míbalé 2026, 16:50