Botiki mosàlà mpe Boponomi na dioseze ya Santiago na Cap-Vert
Bansango ya Vatikan
Mgr Teodoro Mendes Tavares, C.S.S.P, abotamaki o mokolo mwa 7 ya sanza ya Yanuali na mobù 1964 na Cap Vert, mpe akulaki bonganga to akomaki Sàngó o mokolo mwa 11 ya sanza ya Yuli. Nsima ya bilako bya yé na Lingomba to Congrégation ya ba Pères Spiritains, ayekolaki philosophie na Institut supérieur ya théologie ya Braga. Azwaki mpe mateya ma teoloji na eteyelo ya likolo ya Katoliko na Lisbonne, na Portugal. Mgr Mendes Tavares azwi dipolome ya ekimenisme College Trinity, na Dublin.
Episkopo ya sika ya Santiago na Cap-Vert aponamaki episkopo-mokonzi ya Verbe mpe episkopo mosungi ya Archidioseze ya Belém do Pará (Brazil) na mokolo mwa 16 ya sànzà ya Febwáli 2011, mpe aponamaki episkopo na mokolo mwa 8 Máyí elandaki. Na 2015 aponamaki episkopo mosungi ya dioseze ya Ponta ya Pedras na Brezil yambo ya kokitana mosungi na ye na mokolo mwa 23 ya sanza ya Setembe ya mobù 2015
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
