Luka

Papa Léon XIV na likita lya banso Papa Léon XIV na likita lya banso  (ANSA)

Likita lya bansó: Eklezia, elembo mpe esalelo ya boyokani na Nzámbe

Mokolo ya misáto eye ya putulu, Papá Léon akobaki molongó na ye ya matéya etáli Concile Vatican II. Sima ya bomanyoli loléngé na loléngé ya bosakoli ya bonzámbe, Papá wa Roma abengi úto ebándeli ya karesimo, ya kokolisa Likambo-likonzi ya litéya etáli Eklezia Lumen Gentium. Bomanyoli etálaki Eklezia, elembo mpe esalelo ya boyokani na Nzámbe mpe bato bansó.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Litangi ya mokánda na ba Kolinti esika wápi Polo akoloba na Kristu 'te azali "elili ya Nzámbe amonanaka te", mpe "lokóla motó ya nzóto, motó ya Eklezia" esálisaki mpo ya bomanyoli na "mobombano ya Eklezia, sakraménto ya bosangani na Nzámbe mpe bomoko ya bato bansó", elingi koloba elembo mpe esalelo ya boyokani.

Eklezia ezali "mobombano" ya bolingo ekoki komonana

Na bokobi ya bosakoli bonzámbe, Nzámbe apona koyébisa mobombano ya bolingo ya mwángo na ye ya bonzámbe eye ezali ya kosangisa bato bansó na ye na nzela ya Mwána na ye, Yézu-Kristu. Ebándeli mpe etinda ya Eklezia bikososolama kaka o ntéi ya "mobombano" ena ya bolingo ya Nzámbe. Mpe Papá alimboli 'te koloba ya "mobombano" ya Eklezia ezali kaka ya koloba "eloko mókó ya molili to ya bososoli te", kasi bosóló boko ebombanaka kála mpe emonani úta leló. Bosóló eye ezali mwángo ya Nzámbe, mwángo na ye ya kosangisa mpe koyókana ya bikelámu binsó na Kristu. Babéndami na Kuruze, bolakisi ya ntina ya bolingo ya Nzámbe, bato babyangami na lisangá, ekklesia, na Nzámbe. Yangó elingi kolimbola liloba Eklezia. Nzámbe na bosáli na lisapo, akokotisa na mosála na ye bato. Na Eklezia, Nzámbe, asangisi bato na ye mpe asangisi lisusu bango na bangó mpo mpósá ya bomoko ekovanda na motéma ya moto.

Eklezia "sakraménto" elingi koloba elembo mpe esalelo ya boyokani

Likambo-likonzi ya litéya etáli Eklezia Lumen Gentium ekolakisa Eklezia mbala móķó lokóla elembo yoko mpe esalelo yoko ya mwángo ena ya libiki. Elembo, mpo lisangá ya eklezia ekolakisa na mokili leló bomoko esálemi na Kristu na nzelá ya Kuruze na ye mpe ya Nsékwa na ye. Esalelo, mpo ezali na nzelá ya Eklezia ndé Nzámbe akosála nini ye alingi ya kosangisa bato na ye mpe ya kosangisa bangó.

«Bosáleli liloba "sakraménto" mpe ndimbola ekobima kúna bikoluka kolakisa 'te Eklezia ezali, na lisapo ya bato, elobeli ya eye Nzámbe alingi kosála; waná, na botáli yangó, okosimba na loléngé mosusu mwángo ya Nzámbe, mobombano: na liyoki ena, Eklezia ezali elembo yoko. Lisusu, na liloba "sakraménto" ekobakisama eye ya "esalelo", na polélé mpo ya kolakisa 'te Eklezia ezali elembo yoko ekosála. Ya sóló, ntángo Nzámbe akosála na lisapo, akokotisa na mosála na ye bato baye bazali batindelami ya mosála na ye. Ezali na nzelá ya Eklezia ndé Nzámbe akokoma na eye azali koluka ya kosangisa bato na ye mpe kosangisa bangó na bangó».

«Ya sóló, elobi Concile, Kristu, atombwami na mokili abéndaki epái na ye bato bansó (cf. Yn 12, 32 grec; asékwi na bawa (cf. Rm 6, 9), atindeli na bapostolu na ye Elimo na ye ya bomoi mpe na ye atóngi Nzóto na ye, eye ezali Eklezia, lokóla sakraménto ya mokili mobimba ya libiki; avandi na loboko ya mobáli ya Tatá, akosála ntángo insó ekela na ye na mokili mpo ya kokamba bato epái ya Eklezia, kosangisa bangó na nzelá na ye makási koleka mpe koyébisa bangó bomoi na ye ya nkembo na bopesi bangó lokóla biléi Nzóto ya ye mókó mpe Makila ya ye móķó

Na botóndi ya kozala na Eklezia, nzóto ya Kristu

Eklezia ezali nzóto ya Kristu mpo koyókana na mokili. Likambo-likonzi ya litéya ya Eklezia Lumen Gentium, elobi Papá, "ekosálisa bisó ya kososola na botáli káti ekela ya kosangisa ya Pasika ya Yézu, eye ezali mobombano ya malozi, liwa mpe nsékwa, mpe bokokani ya Eklezia. Kaka na eleko ena, akosála tozala na botóndi ya kozala na Eklezia, nzóto ya Kristu asékwi mpe bato se mókó ya Nzámbe na mobémbo mwa boyambi na lisapo, oyo akobika lokóla bozali boko ya bosántisi o ntéi ya bato bakabwana, elembo makási ya bomoko mpe ya boyokani káti na bato".

Na eleko eye ya karesimo, ntángo tokotambola na mokili mókó ezali na elembo ya bokabwani, Papá Léon XIV akobenga bisó ya kosenga na Mokónzi likabo ya bobongoli motéma ya sóló mpo ya koyanola na ndéngé elongobami na bolingo na ye mpo ya bisó mókó mpe kokabola bolingo ena na baye bansó bazali nzinganzinga na bisó mpe Mokónzi akoba kokamba Eklezia na ye na etinda na ye ya bosántisi mpe ya boyokani.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

18 sánzá ya míbalé 2026, 15:39