Luka

2026.02.16 Mgr Javier Herrera Corona, Ntomà ya Pàpa ya sika, na Tunisia 2026.02.16 Mgr Javier Herrera Corona, Ntomà ya Pàpa ya sika, na Tunisia 

Mgr Herrera Corona aponami Ntómà wa Pàpa na Tunisie

Na mokolo mwa yambo mwa 16 ya sanza ya Febwali, Papa aponaki diplomate ya Mexique oyo azalaki kala lokola motindami ya Saint Siège na Algérie, kokóma Ntómà ya Pàpa na Tunisie.

Bansango ya Vatikan

 

Pàpa Leon ya XIV aponi o mokolo moye mwa yambo mwa 16 ya sanza ya Febwali, Mgr Javier Herrera Corona, ntómà way e na Tunisie. Na sanza ya zomi na moko ya mbula moleki, baponaki ye mpo na kozala lisusu motindami ya Vatikan na Alger. Javier Herrera Corona abotamaki na Autlán, na Mexique na mokolo mwa 15 ya sanza ya mayi ya mobù 1968, mpe akulaki bonganga to akómaki Sàngó na mokolo mwa 21 ya sanza ya settembe ya mobù 1993, na diosezez na yé ya kobotama. Azwaki dipólóme na mibeko mya Eklezya ya Katolike (le Droit Canon), mpe na mokolo mwa 1 ya Yuli 2003, akótaki na mosala mwa misionele ya Pápa na ekólo Pakistan, na ekólo Pérou, na ekólo Kenya, na ekólo Grande-Bretagne mpe na ekólo Philippines.

Na 2022, Mgr Herrera Corona aponamaki lokola Ntómà ya Pàpa to Nonse apostolique na Congo-Brazzaville mpe na Gabon na eleko ya Pàpa François. Lokola ayebaki minoko to ba lokótà mingi, Mgr Herrera Corona ayebaki koloba Lingelesi, Italien mpe Lifalansa. Kopono baponaki ye na mokolo mwa 22 ya  sanza ya Okotobe na Algérie, nsima ya basanza mingi oyo azalaki lisusu na esika na ye te. Na tango aponamaki lokola Ntómà na Congo mpe na Gabon, Mgr Herrera Corona atombwamaki na esika ya episkopo-mokonzi (archeveque) ya Vulturara, na Italie, mpe na nsima bakelaki yé mokolo mwa 23 ya sànzà ya Aprili 2022.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

16 sánzá ya míbalé 2026, 17:54