Luka

Madagascar oyo etungisami na Mimpepe makasi mpe Mpela Madagascar oyo etungisami na Mimpepe makasi mpe Mpela  (AFP or licensors)

Pàpa asambeli mpo na bato bazwaki likàmà la Mompepe makasi na Madagastar

Na nsuka ya losambo la «Angelus» na mokolo mwa lomingo mwa 15 ya sanza ya Febwali, Léon XIV alakisaki bondeko bwa ye nakozala pembeni nà bato ya Madagascar oyo bazwaki likàmà na mompepe makasi Fytia mpe Gezani, oyo ekotisaki bato pene na nkoto nkàmà minei (400.000) na likàmà mpe likambo la mpasi.

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

Nazali pene nà bato ba Madagascar oyo, na mwa ntango moke, batungisamaki na mimpepe makasi mibale, mpela mpe koningana ya mabele ebebisaki bandako ba bango”. Elobaki Pàpa na ebandeli ya lisikulu na ye ya mokuse nsima ya losambo la “Angelus”, mpe bobenisi bwa bankoto ya bakristu bazalaki na esika ya Saint Pierre. Léon XIV alakaki bango mabondeli, mingi mpenza mpo na “bato baye bakufi mpe mabota ma bango, mpe mpo na bato baye banso bazwaki mpasi makasi”.

Kufa mpe kobebisama ya biloko

Mikolo misatu nsima ya koleka ya cyclone Gezani na esanga ya Madagascar, bilan ezali kaka kobakisama. Bato pene na 40 bakufaki mpe biloko mingi ebebaki, ndenge bakonzi balobaki. Toamasina, engumba ya mibale oyo ezwami na esanga ya Océan Indien, ezwaki mpasi mingi koleka. Bato bafandaka kuna bazali nayino kozanga mai mpe, mpo na bato basusu, bazali na lotiliki te.

Biro ya ekólo mpo na makambo matali makàmà mpe makama minene elobi ‘te bandako koleka nkoto zomi na mwambe (18 000) ebebisamaki, mpe bandako soki nkoto tuku mitano (50 000) ebukanaki to ezindaki na mayi. Na likita lyoko ya bapanzi sango, mbulamatari elobaki ‘te, na kotalela lolenge makambo mazali kotambola, Gezani ebebisi mbongo koleka ba dolare milio nkama moko na tuku minei na mibale (142millions), elingi koloba pene na ba eró milio nkama moko na tuku mibale (120 millions).

Malako ma Pápa mpo na “Mobù mwa Sànzà ya sika”

Lisusu, na libaku lya bolengeli milulu, na mikolo mikoya, ya “Mobu mwa sika ya Sànzà”, eyenga eye bato mingi ya mikili ya Azia ya Esti bazali kokumisama mpe na bisika bisusu ya mokili, Mokonzi Ntomà monene ya Eklezia apesaki malako ma ye ya malamu, na elikya ‘te “feti ya esengo oyo elendisaka bato bazala na boyokani ya libota mpe boninga; ekotisa kimya na mabota mpe na bato; ezala libakù lya kotàla na bomoko mikolo mikoya mpo na kotonga kimya mpe bomengo to bofuluki mpo na bato banso”.

Tata Mosantu amonisaki “bolingi bwa ye” mpo na bato banso, mpe na nsima asengaki bobenisi bwa Mokonzi mpo moto na moto.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

16 sánzá ya míbalé 2026, 10:30