Luka

2026.03.26 Mgr Obed Muriungi Karobia, O.F.M. Conv. . 2026.03.26 Mgr Obed Muriungi Karobia, O.F.M. Conv. . 

Kenya: koponama ya episkopo-mosalisi ya archidioseze ya Nairobi

Tata-Mosantu aponaki episkopo mosungi ya Archidioseze ya Nairobi, Sàngó Obed Muriungi Karobia, oyo kino lelo azali mokambi monene ya lisanga lya bakristu «Serviteurs franciscains de Marie, Reine de l'Amour» ya diosezez ya Ngong. Apesi yé kiti ya bokonzi ya Timida.

Albys KBD, CP – Kinshasa

 

Abotamaki na mokolo mwa tuku mibale na libwà ya sànzà ya motobà ya mobù 1979 (29juin 1979), Mgr Karobia ayekolaki filozofi na Collège Saint Bonaventure na Lusaka, na Zambie, mpe azwaki licence ya théoloji na Collège Tangaza na Kenya. Akotaki na seminele ya ba Frères mineurs mpe akomaki Nganga-Nzambe o mokolo mwa 28 Yuli 2012.

Sima ya bokuli bonganga bwa ye, episkopo ya sika azalaki na misala ndenge na ndenge ya eklezia kobanda na mosala ya pastorale kino na misala mya bokambi o kati ya lingomba lya ba Frères Mineurs Conventuels oyi azali moko wa bango. Azalaki Sàngó-molandi ya parwase kobanda na 2012 kino 2013. Sàngó-Mokonzi ya Parwase Sainte-Catherine ya Alexandrie à Nairobi ut’o 2013 kino 2016. Mokambi ya ba vocations o kati ya Custodie ya ba Frères Mineurs Conventuels ya Kenya kobanda 2012 kino 2019. Moyekwisi mpe mosungi makambo ya mbongo ya ndako ya mateya ya eteyelo na ye na Nairobi ut’o 2016 kino 2019; mpe na nsuka, ministre provincial ya Province ya Kenya ya ba Frères Mineur Conventuels kobanda na 2019 kino 2023.

Azalaki mpe Mokambi ya Fédération africaine ya ba Frères Mineurs Conventuels ut’o 2020 kino 2023. Baponaki yé nsima, na mobù molandaki, na ndingisa ya dicastere mp ona evangelisation. Azalaki moderateur supreme ya lisanga lya bafidele ya ba franciscains, Basàli ya Malia, Mokonzi-mwasi wa Bolingo (Serviteurs franciscains de Marie, Reine de l'Amour), na diosseze ya Ngong, mosala oyo asalaki kino koponama na ye lokola episkopo mosungi ya dioseze monene ya Nairobi. Moto moye mwa sika oyo akoponomi, akosunga Mgr Philip Anyolo, oyo azali na monastele ya esika enà kobanda na 2021, na kokamba dioseze oyo ezwami na bato koleka 7,2 miliyo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya mísáto 2026, 21:18