Luka

2026.03.29 Pàpa Léon XIV , na tango ya milulu mya lomingo la Mbila to Mandalala .. 2026.03.29 Pàpa Léon XIV , na tango ya milulu mya lomingo la Mbila to Mandalala ..  (@Vatican Media)

Manaka mya milulu mya Leon XIV kobanda sanza ya Aprili kino Yuli

Mibembo na Afrika mpe na nsima na Espagne, kotala Pompéi, Naples, Lampedusa mpe Pavie, bilambo na Vatican. Ezali yango nde manaka ma Pápa, oyo Biro ya milulu ya losambo ebimisaki na mokolo mwa yambo, 30 Mársi.

Bansango ya Vatikan

 

Saint Augustin nde akozala likambo liye likokamba makambo maye Léon XIV asengelaki kosala kobanda sanza ya Aprili tee na sanza ya Yuli. Ya liboso ezali mobembo molai ya bontomà na Afrika, mobembo mwa misato ya bokonzi bwa ye lokola pápa. Mobembo mwango, ebongisami kobanda mokolo mwa 13 kino mokolo mwa 23 Aprili. Ekomema Tata Mosantu na Algérie, mboka epai wapi mosantu ya Hippone abotamaki mpe azalaki episkopo. Na nsima, akoleka na Cameroun, na Angola, mpe na Guinée équatoriale.  Na mokolo mwa 26 Aprili, na ngonga ya libwa ya tongo, na mokolo mwa lomingo ya minei ya Pasika, na ndako monene ya Vatikan, Pápa akokamba misa mya bokuli bonganga ya basàngó. Sanza yango ekozala na makambo mingi na kotalela manaka mya milulu miye Pápa Léon XIV akokamba. Ezali biro ya Pápa mpo na milulu mya losambo nde ebimisaki mokolo mwa yambo, mwa 30 Mársi.

Baekwelà basato mpe esengeli kosalema na sanza ya mayi. Na mokolo mwa mposo, mokolo mwa mibale ya sanza ya mitano to mayi, na Basilique Saint-Jean-ya-Latran, episkopo wa Roma akosala misa elongo na bokeli episkopo na ngonga ya 17h00. Mikolo motoba nsima, na mokolo mwa 8 Mayi, akokende na Campanie, mpe akokende na Pompéi mpe na Naples. Na esika mosantu ya Ngondo Maria ya Santu ya Rosario ya Pompéi, oyo etongamaki na nsuka ya ekeke ya zomi na libwa na Santu Bartolo Longo. Misa ekosalema na 10:30 ya ntongo. Ekaniseli mosusu ekosalema na Vatican na mokolo la Lomingo, mwa 24 Mai, na ngonga ya 10 ya tongo, na mokolo ya Pantekoste.

Na elembo ya Augustin

Na sanza ya Yuni, Pápa akopesa lisusu lokumu na Santu Augustin. Nsima ya kosala mobembo na ye ya minei na Espagne kobanda mokolo mwa 6 kino mwa 12 ya sànzà ya Yuni, akokende na Pavie na mokolo mwa poso mwa 20 ya Yuni. Na engumba ya “cent tours”, babombaki ba reliki ya mosantu. Ba memamaki yango na mobu 723 na etinda ya Liutprand, mokonzi ya ba Lombards. Nzoto na ye ezali kopema na kati ya sanduku ya Saint Augustin, na kati ya Bazilika Saint-Pierre-au-Ciel-d'Or. O mokolo mwa 29 ya sànzà ya Yuni, mokolo bakokundola  basantu Petro mpe Polo, Léon XIV akosala misa oyo ekomonisa bobenisi mpe akopesa pallium na ba archeveki ya sika ya engumba.

Mobembo na Lampedusa

Na mokolo ya mposo, mokolo mwa 4 ya sanza ya nsambo, mobembo mosusu mobongisami. Nganga-Nzambe mokonzi akokende na Lampedusa, esika wapi bayambaka bato baùtaka na Afrika mpo na kokende na Eropa. Mayi maye eyambaka nzoto ya bato mingi bakufaki na mobembo mona ya likama. Mingi mpenza, basalaka mibembo mina, na bamasuwa ya ntalo mingi. Misa ekosalema na ngonga ya 10h na ntongo, mibu zomi na misato nsima ya mobembo ya Pàpa François na esanga ya Lampedusa. Ezali  mobembo ya liboso libanda ya Vatikan mpo na Nganga-Nzambe mokonzi ya ba-Argentine, oyo atelemelaki mpe alobelaki likambo lya “mondialisation ya bopotu (indifference)”. Maloba mana malobamaki mpo na “kolamusa bososoli ya bato” liboso lya mpasi ya bato oyo bazalaki na elikya ya bomoi malamu na mikolo mizali koya.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya mísáto 2026, 22:28