Luka

Monaco prepares for visit by Pope Leo

Pàpa Leon ya XIV azwaki mpepo mpo ya kokende na Bokonzi ya Monaco

Na tongo ya mokolo mwa poso mwa 28 ya sànzà ya marsi, Pàpa azwi mpepo mpe apumbwe na mwa mboka-engumba. Ezali mbala na ye ya mibale ya kosala mobembo lokola ntomà. Asengeli kokóma na ngonga ya 9h00. Na nzela, Pàpa atindeli bakambi ya France, Emmanuel Macro mpe ya Italie, Sergio Mattarella, telegrami. Na kati alobi ‘te alingi kolendisa “litatoli lya bokristu” mpe “botongi bolamu mpo ya bolamu ya bato banso”.

Bansango ya Vatikan

 

Mokolo moye mwa 28 ya sànzà ya Marsi, na ngonga ya 7h22, mpepo oyo esengelaki komema Pàpa, epumbwaki na Vatikan. Mokonzi Ntomà monene akei na Bokonzi ya Monaco. Ezali mobembo mwa ye ya mbala ya mibale lokola Pàpa na bikolo. Ezali mobembo ya yambo ya Pàpa ya eleko oyo ya sika. Akokóma na ngonga ya 9h00, na mwa ekolo-engumba eye, epai wapi katoliko ezali lingomba leta esakoli boyambi. Akotikala kuna kaka bangonga libwà (9h)

Bakambi bua Ekolo ya Italie mpe ya France

Yambo te alongwa mabele ya Italie, Leon ya XIV atindaki bó momesano, telegrami na mokambi ya Italie, Sergio Mattarella. Na kati a limboli na ye ‘te mobembo mwa yen a Monaco “Nazali na mposa makasi ya kolendisa bino na litatoli ya bokristu mpe mpo na koyeba kotonga bolamu oyo bato banso basengeli kozala na yango elongo”. Na yango, atindelaki mokonzi ya Ekolo ya Italie “mbote ya libotondi eùti o motema” mpe elandaki bilako ya “mposa makasi mpo na kokola na elimo, na mboka mpe kokola ya bato ya ekolo ya Italie”.

O kati ya telegrami enà, Pàpa alobelaki mpe Mokambi ya ekolo ya France, Emmanuel Macron, awa azali koleka na mpepo likolo ya ekolo eye, mp ona mobembo mwa ye, na Bokonzi ya Monaco. “Natindeli yo mpe bana bamboka ba yo mbote na motema mobimba, mpe nalaki bino losambo ya ngai mpo na boboto to kimya mpe bolamu bwa ekólo”.

Bokutani elongo nà Prince Alberte II, Lingomba ya Katoliko, Bilenge mpe Bakatekimeni

Bokutani na makambo manei ya ntina mingi masengelaki kosalema na mobembo wana ya bontoma: kotala Prince Albert II na Palais princier, kokutana nà bato ya Lingomba ya Katoliko na Katédrali ya Immaculée Conception, mpe kokutana na bilenge mpe nà bateyi ba lopango ya eklezya Sainte-Dévote. Na nsuka, misa ya nsuka ekosalema na Stade Louis II, epaiwapi Pápa Léon XIV akoleka na motuka mwa ye ya golf. Na ngonga ya 5:45 ya mpokwa, Léon XIV akotika Monaco na mpepo ya ye (hélicoptère) mpo na kozonga na Vatikan.

Elan ya sika na etindà to mosàlà mwa eklezya

Episkopo wa lokùmu Pietro Parolin, Mokomeli ya Etuka ya Esikà Esantu ( Saint-Siege), alobelaki likambo lya mobembo monà, na mwa masolo apesaki na bapanzi – nsangoya Vatikan. Azali kolikya ‘te; “Mobembo moye mokopesa makasi ma sika na mosàlà to etindà ya Eklezia ya esika wana. Akokomisa makasi boyokani na makambo ya ntina mingi” lokola: kobatela biloko bizalisami, kobatela bomoi mpe kolendisa bondeko na mokili mobimba, kozanga kobosana “bato oyo bazali na likama

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

28 sánzá ya mísáto 2026, 20:55