Molulu mwa Bokengeli bwa losambo mpo na kimya oyo Léon XIV akokamba, ekosalema mokolo mwa 11 Apríli na ngonga ya 18h00
Bansango ya Vatikan
Na likita lya banso ya mokolo mwa misato, 8 ya Sànzà ya minei, Pàpa Léon XIV abengaki lisusu bakristu banso mpo na kosangana na ye na losambo mpo na kimya, oyo ekosalema na Basiliki ya Saint-Pierre na mokolo mwa samedi, 11 Aprili ya mobù 2026, na ngonga ya 18h00.
Ezali nde nsango ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan eyebisaki. Elandi liyebisi lya Nganga-Nzambe Monene na ntóngó ya Pasika, na tango ya bobenisi ya Urbi mpe Orbi, lokola momeseno.
Tango epesami mpo y abato banso
Mokanda mwango elobi lisusu ‘te, tango ya losambo eye, ekokambama na Pápa yemei mpe ekopesama mpo ya bakristu banso. Libyangi lya sika na ntongo ya lelo, mpo ya bosangani na bokengi ya losambo, elandi “bosepeli” mpe “elikya makasi” oyo Papa alakisaki na ntango ya liyebisi lya bopemi ya etumba na Moyen-Orient na boumeli bwa poso mibale.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
