Luka

2026.05.21 Botali ya Mgr Eric Soviguidi epai ya mokambi ya bonkoko na Burkina Faso 2026.05.21 Botali ya Mgr Eric Soviguidi epai ya mokambi ya bonkoko na Burkina Faso 

Burkina Faso: Mgr Soviguidi abengi bobáteli ya bolámu ya bansó

Úta bolakisi ya mikánda na ye ya kondimama na mokónzi Ibrahim Traoré na 5 ya sánzá ya zómi na mibalé 2025, ekolakisa ebándeli ya etindá, ntómá ya Papá na Burkina mpe na Niger, Mgr Éric Soviguidi, afúngolaki molongó mókó ya bokútáni na bakambi ya ekóló. Na loléngé ená, ayambamaki, mokolo ya mibalé 19 ya sánzá ya mitáno 2026, na mokambi ya bonkoko, abengami Moogho Naaba. Akumisaki mosála na ye na boyókani ya bato mpe bolukiluki boboto.

JR Bompolonga - Kinshasa

«Nalingi, na etamboli eye, koloba ntina mpo ya bayángeli mpe bakónzi bansó ya molimo kosála elongo. Ezala bakambi na ndéngé ya bonkoko, bakónzi, bakambi ya biyamba to ya politiki, ezali motúya 'te bansó basololaka mpo ya bolámu ya ekóló mpe ya bato», elobaki ntómá ya Papá na Burkina mpe na Niger na babokútani na ye na bakambi kilikili ya ekóló. Na bozangi likoki ya kokutana na mókó mókó ya bakambi ya bonkoko ya Burkina Faso, Mgr Soviguidi alobaki, na mokambi ya bonkoko enéne, mpósá na ye ya kosála na bomoko na biténi ya ntina ya baí-Burkina mpo ya bolukiluki ya boboto ya sékó.

Bakambi ya bonkoko, makonzi mpo ya boyókani ya bato mpe ya boboto

O eleko ya bosololi na bangó, Mgr Soviguidi akumisaki bomipesi na moléndé ya mokambi enéne ya bokónzi ya bato ya mossé na lokolá oyo ya bakambi ya bonkoko ya Burkina Faso, mpo ya bolingisi, boyókani mpe ya kobika-elongo. «Na nzelá ya botáli na ngai epái ya Moogho Naaba, nalingi koloba liyoki na ngai ya botosi mpo ya bakambi ya bonkoko ya Burkina...», elobaki Mgr Soviguidi. Mpo na ye, bakambi ya bonkoko bazali makonzi ya ntina mpo ya botélemisi (stabilité) mpe lokolá babontei ya malonga mpo ya boboto ya ekóló.

Mgr Eric Soviguidi akendeki kotala Bokulaka Moogho Naaba Baongo
Mgr Eric Soviguidi akendeki kotala Bokulaka Moogho Naaba Baongo

Bondimi mpe botóndi

Bokulaka Moogho Naaba Baongo, alobaki botóndi na ye na Tatá-Esántu mpo ya bokébi ya molimo mpe ya bomoto eye Eklezia katoliko ekomema na baí-Burkina mpe mpo ya etamboli esálemi na motindami na ye na Burkina Faso. Mgr Soviguidi amiyókaki ayambamaki na bolámu bonéne. Amilobeli «atutami makási na motindo ya botosi eye bakambi bansó bazali mpo ya Bokulaka, motúya mókó ya ntina mpo ya babonkoko na bisó, lisapo na bisó mpe bomoto na bisó».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya mítáno 2026, 11:48