Luka

2026.05.22 S.E. il Signor Micheal Martin, Primo Ministro di Irlanda 2026.05.22 S.E. il Signor Micheal Martin, Primo Ministro di Irlanda  (@VATICAN MEDIA)

Mbulamatari ya Irlanda ekei masóló na Pàpa

Papa Leon ya XIV ayambaki Micheal Martin, na tongo ya mokolo mwa 22 ya sànzà ya Màyi, na Palais Apostoliki ya Vatikan. Na tango yam asolo, pàpa asepelaki mpo na boyokani bozali kati na bikolo biye babàle. Masolo matalelaki likambo lya mombongo ya ekolo enà. Balobelaki mpe bondeko kati na Eklezya na mboka mpe Leta, mingi mpenza likambo ya kelasi.

Bansango ya Vatikan

 

Mbulamatari ya ekolo ya Irlanda ayaki na Vatikan o mokolo mwa 22 ya sànzà ya Màyi. Pàpa Leon ya XIV ayambaki yé na Palais apostoliki ya Vatikan. Nsima ya bokutani bwa ye elongo nà Nganga-Mokonzi monene, Micheal Martin akutanaki nà episkopo wa lokùmu, Pietro Parolin, Secrétaire ya Etukà ya Saint-Siège, elongo nà Archevêki Paul Richard Gallagher, Secrétaire ya Relations na ba Etats mpe ba Organisations internationales.

Masóló na Secretairerie ya Etukà

Na tango ya masóló na secretairerir ya Etukà – Elobi yoko liyebisi ya ndako ya bopanzi nsango ya Vatikan, esengo emonisamaki mpo na bondeko to boyokani balamu bozali kati na Vatikan mpe Irlanda. Sima mwa likebi etiyamaki na likambo ya nkita to mombongo ya ekolo ; nà mpe boyokani kati na Eklezya ya mboka nà Leta, mingi mpenza na makambo ya Kelasi

Masóló elongo na Secretairerie ya Etukà
Masóló elongo na Secretairerie ya Etukà   (@Vatican Media)

Bongo masóló mokobaki. “Batalelaki likambo lya mopelengano to politiki ya bamboka mpe kati na bikolo na mokili; mingi mpenza na maye matali Mikili mya Pótó to Eropa mpe Moyen- Orient,  makambo ma limya oyo ezali komeme mpe multilateralisme”, elobaki liyebisi lyango. 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

22 sánzá ya mítáno 2026, 10:15