2026.05.06 Pàpa Leon ya XIV 2026.05.06 Pàpa Leon ya XIV  (@Vatican Media)

Pape akozala na bolakisi ya mokanda mwa ye na makambo ya IA

Léon XIV atyaki mokoloto to sinyatili na mokanda «Magnifica humanitas», epai wapi alobeli kobatela moto na eleko eye ya mayele ya bomoto. Mokanda moye mokobanda ekobima polele o mokolo mwa 25 ya sànzà ya Mayi na ndako ya likita monene (synodi) ya Vatikan, na miso ya Tata-Mosantu.

Bansango ya Vatikan

 

Papa Léon XIV, azali komilengele mpo ya kobimisa mokanda mwa ye ya liboso (première lettre encyclique), oyo ezali na motó ya likambo «Magnifica humanitas», oyo ezali kolobela libateli ya moto na eleko ya mayele ya bomoto. Liyebisi yoko ebimaki na ndako ya bapanzi nsango ya Vatikan na mokolo mwa yambo, mwa 18 ya sanza ya Mayi. Mokanda mwango mokomamaki na dati ya 15 Mai, mokolo ya anivelesele ya mbula nkamà moko na tuku misato na mitano (135è) banda Pápa Léon XIII abimisaki mokanda Rerum Novarum.

Mokanda mwango mokobima o mokolo mwa 25 ya sànzà ya Màyi na ngonga ya 11:30 na ndako ya likita monene to ndako ya synodi, na miso ma Tata-Mosantu, elobi liyebisi lya Vatikan. Na liyangani yango, Episkopo wa lokùmù Víctor Manuel Fernández, mokambi wa dikastele ya Doctrine pour la foi,  Kardinale Michael Czerny, mokambi ya departema ya mateya ya lingomba, Anna Rowlands, Molakisi ya teoloji na makambo ya politiki nà Doctrine social ya eklezya mpe ya mateya ma lingomba na departema ya teoloji mpe ya mangomba na eteyelo ya likolo ya Durham, na Royaume-Uni, Christopher Olah, mobandisi ya Anthropic (États-Unis), mokonzi ya bolukiluki na ntina ya mayele ya bomoto, nà mpe Dr. Léocadie Lushombo i.t., molakisi ya teoloji ya politiki mpe ya makanisi ma Katoliko mpo na bomoi bwa bato na Eteyelo ya teoloji ya ba Jésuites na Iniversite ya Santa Clara na Californie.

Esi ebongisami ‘te na ntango ya bolakisi, Pápa akoloba mwa maloba mpe akopesa bobenisi bwa ye. Bokutani ya bapanzi nsango ekosukisama na lisalisi lya episkopo wa lokùmù Parolin, Secrétaire ya Etukà ya Saint-Siège



 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

18 sánzá ya mítáno 2026, 14:59