Papá akeli commisio yókó ya Vatican ya Intelligence Artificielle
Vatican News
Esaleli ená, eye esangisi badicastère ebelé ebotami úta makanisi mingi. Ebotami mpo ya koyanola na makambo misáto ya minéne, esemboli liyebísi lyokó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo: botomboli, na mibú ebelé bileki, ya likambo ya IA mpe bomátisi ya sika ya bosáleli yangó mokili mobimba; nini ekoki kosála na nzóto ya moto mpe ya bomoto nionso; litungisi ya Eklezia mpo ya lokúmu ya moto mókó mókó, mpenza na eye etáli botomboli na ye mobimba.
Bokónzi bokó ya bobaluki
Commisio ená ezali na batindami ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba, ya dicastère mpo Litéya ya boyambi, ya dicastère mpo ya Bonkoko mpe botéi, ya dicastère mpo ya Boyébisi, Akademi ya Papá mpo ya bomoí, Akademi ya Papá mpo ya banzebi mpe Akademi ya Papá ya banzebi ya bato. Bobaloli nionso ya lingómbá eye ekosálema na bondimi ya Tatá-Esántu, elobi liyebísi.
Badicastère ya ndéngé na ndéngé basengeli kolubola moto mókó mpo ya kozala o káti ya Commisio eye bokambi mpo ya mobú mókó, ekoki kozongelama, epesami na dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba. Na sima, Papá wa Roma akopesa bokambi na yókó ya bisaleli bizali na káti, kaka mpo ya mobú mókó.
Epesami na esalelo ekokamba ya kosálisa bosálisani mpe bokaboli káti ya bilama ya etuluku ya bansango bitáli misála mpe bamwángo ya IA, na káti waná bapolitiki bitáli bosáleli na yangó o ntéi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, na bosálisi lisoló, lisangá mpe bozali.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.