Luka

Regina Cæli: Basantu «ya pembeni», nzela ya kimya mpe bosangani

Na lomingo loye la sambo ya eleko ya Pasika, epai wapi ekolo ya Italie ezali kosepela Mbuta ya Mokonzi, Pàpa Leon XIV a salaki mateya ma yé na maye matali bosantu “ya ezibelo ya pembeni” oyo emonisami na baye banso bazali kosala makasi na bomoi bwa bango ekende na nzela ya Nsango Elamu..

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mikili ebele, bakisa mpe Italie, bakundoli Mbuta ya Yezu epai ya Nzambe o mokolo mwa lomingo loye elandi mokolo mwa minei ya mbuta o likoló, nzokande mokolo moye mozali mokolo mwa konjé te mpo ya bato banso bisika binso. Yambo ya kotanga losambo la Marian ya Regina Caeli, Pápa Léon XIV atyaki bongo bomanyoli bwa ye na elilingi ya Yezu oyo azali kotombwama na mabele mpe azali kobuta to komata epai ya likoló. Ezali ndakisa moko oyo, bandimi basusu bakoki komona lokola “likambo moko ya mosika”. “Nzokande, ezali sóló eloko te”. Ebandaki koloba Tata-Mosantu ut’o lininisa lya ndako na ye, na bankóto ya bato ya sembo, baye bayanganaki na esika Saint-Pierre. “Tosàngani bomoko nà Yezu, lokola bitapi bya nzoto nà motó na nzoto sé yoko.  Bongo Mbutà ya yé o likóló ezali kobende biso mpe lokola, elongo nà ye, nakosangana elongo na Tata”.

«Bomoi bwa Kristu mobima na bomoto bwa yé, ezali sé molimo ya komata o likolo, ezalela ena nde eyambi mpe esangisi mokili mobimba. Yango mpe esikoli moto o masumu ma yé, ememeli ye mwinda, elakisi ye lolenge ya kolimbisa mpe ya kolikya, bisika biye molili mozali, bisika bizangi bosembo mpe bozangi bolikyi, mpo na koyingela o elónga ya Pasika. Na liwa lya ye, solo mwana wa Nzambe abomi liwa lya biso, mpe na Nsekwà ya yé, apesi biso bomoyi ».

Mbuta ya Yezu, ezali likambo ya solo, kasi ezali “elakà ya mosika tè”. Ezali kobende biso mpe lokola, na elonga ya likolo. Ekobaki Leon XIV nakoloba.

Bansatu ya pembeni na biso

Nzela ya mbuta o likolo eyebani na moto nyonso. Ezwami na bandakisa mpe mateya ma Yezu, na misàlà ya Ngondo Maria mpe epai ya basantu. Ezali kaka te baye “eklezya elakisi biso lokola ndakisa mpo ya molóngó mobimba”. Kasi mpe mpo na baye “bazali pembeni na biso”. Elimboli Leon XIV, nakozongela maloba Mokitani na ye alobaka na mokanda mwa yé Gaudete et exsultate. Mokanda monà mosalemaki mpo ya kolendisa bato na kozala basantu, na mokili mwa lelo. Episkopo wa Roma abyangi bayambi, balanda ndakisa ya bato baye bazali na bomoyi nzinganzinga ya biso. Bang onde bazali elilingi ya bozali bwa Nzambe : “Tata, mama, bankoko, bato ya ndenge nyonso. Mpamba te, na esengo mpe bomipesi, bazali kosàla makasi ya kovivre na bosolo nyonso, Nsango Elamu”.  

«Elongo nà bango», mpe na «lisalisi lya losambo la bango, biso mpe tokoki koyekola komata mokolo na mokolo o likolo. Tosengelei kobalusa to kotiya makanisi ma biso na makambo masóló, ma bosembo, ma bolingo, lokola Santu Polo akomaki (Ph4,8), mpe tokokisa na misala, maye manso tosili komona mpe koyoka (v.9). Tokolisa ontei ya biso mpe nzinganzinga ya biso, bomoi bwa Nzambe, oyo tozwaki o mokolo mwa batisimo mwa biso. Yango nde ezali kobende biso sé o likolo, se pembeni ya Tata, mpe na kopalinginya mbuma malamu ya bosangani mpe ya boboto to kimya».

Ebele ya bato, baye basanganaki na esika Saint-Pierre mpo na koyoka mateya ma Pape Léon XIV.
Ebele ya bato, baye basanganaki na esika Saint-Pierre mpo na koyoka mateya ma Pape Léon XIV.   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

17 sánzá ya mítáno 2026, 23:09