Luka

2026.05.24 Pàpa Leon XIV, na tango ya losambo la Regina Caeli ya mokolo mwa lomingo loye la eyenga ya Nkitela ya Elimo Santu 2026.05.24 Pàpa Leon XIV, na tango ya losambo la Regina Caeli ya mokolo mwa lomingo loye la eyenga ya Nkitela ya Elimo Santu  (@Vatican Media)

Regina Cæli: “Esika Elimo efandi bondeko nde ebotamaka”

Na losambo la Regina Cæli, Léon XVI asengi na kobenga Elimo Santu, oyo afungolaka bizibelo ya boyambi mpe etindaka Eklezia ezala na ezalela ya «koyamba mpe kopesa esika na bato banso». Elimo afungolaka motema ya moto na moto mpo ‘te akoka kolónga «kotelemela, moyimi, kozanga kotiyelana motema mpe makanisi mabe» oyo esengeli mpo ‘te bondeko ekoka kokola.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Nsima ya misa ya Nkitela ya Elimo Santu na Ndako Nzambe monene ya Saint-Pierre, Pápa akendeki bó momeseno na lininisa ya Palais apostolique mpo na koloba na bato 30 000 oyo bayanganaki na esika enà.

«Na eyenga eye ya Nkitela, to byangemi na kotala likabo lya Elimo Santu, esopamaki likolo lya Eklezia oyo ebandaki kobotama mpe lelomei, ezali kopesa yango lisusu na bitapi bya yango, lokola mwinda mpe bokasi boye bozali kosunga bango na makambo manso ma bomoi», elobaki Pàpa.

Léon XIV atyaki makanisi ma ye na ndakisa epesamaki na milulu mya mokolo mwa lomingo loye, elilingi ya Elimo oyo ezali kofungola bikuke to bizibeli. Nzoka nde, Nsango Elamo ya Yoane elobi ‘te bayekoli ba Yezu bakangaki bizibelo bya bango mpo bazalaki kobanga Bayuda. Kasi mokanda mwa bikela bya bapostolo elobi ‘te Elimo Santu eyaki lokola «mompepe makasi likoló lya bango». Elimo afungolaki bieibeli mpe apusaki bango na kobima mpe bakende kosangela Nsango Elamu. Na yango Pàpa akosala motuna, lelo, bizibeli kani Elimo Santu afungoli.

Koyingela o mobombamo mwa Nzambe

Mp ona episkopo ya Roma, ezibelo ya yambo ezali oyo ya yemei, “mpamba te, ezali kofungolela biso boyingeli o kati ya mibombamo mya Nzambe, lolenge emonisami na Yezu-Kristu”. Na nzela ya Elimo wa ye, “Nzambe apesi biso boyambi bwa solo, ayebisi biso ndimbola ya Makomi, ammionisi lokola mozalani na biso (to azali penepene na biso) mpe apesi biso likoki lya kosangana na bomoi bwa ye”. Se bongo, Elimo Santu asalisaka moto na komona Nzambe na miso ma ye moko, kokutana na Ye na nzela ya Yezu. Kaka mpo na kotosa bobele mibeko te, kasi koyeba Ye se ye moko mpe kokundola bilembo ya kozala na Ye na bomoi ya mokolo na mokolo.

Eklezya ya bizibeli polele mpo na bato banso

Ekuke to ezibelo ya mibale oyo Elimo Santu afungolaki ezali oyo ya Cénacle, elingi koloba ekuke ya Eklezia. Soki móto mwa Elimo Santu ezangi o kati ya eklezya yoko, elobi  Léon XIV, “Eklezya ekómaka lokola ezali na boloko ya bobangi. Ekobanga liboso lya mikakatano ya mokili, ekozanga makoki ya kosólóla na bato ya bileko bisusu biye bizali kobongwana”. Elimo, efungolaka bizibeli ya ba Eklezia mpo ‘te eyeba koyamba bato banso, ata mpe baye bakangelà Nzambe bikuke na bango, bakangela baninga basusu, bakangelà elikya esengo ya bomoyi. Sima ya mokitani na ye, Leon XIV akundoli lisusu te “tobyangemi na kozala eklezya eye ezali kobenisa mpe kolendisa […]. Eklezya eye ezali ya kofungwama nabato banso”.

Esika Elimo efandi bondeko ebotamaka

Na nsuka, Nganga-Mokonzi alobi lisusu ‘te: “Elimo Santu afungolaka “bizibelo bya mitema na biso” mpo na kosalisa moto na moto alónga ba résistances, moyimi, kozanga kotyelana motema mpe makanisi mabe. Mpe na nzela na yango, bokoki kozala lokola bana ba Nzambe mpe lokola bandeko, mpo na moko na mosusu. “Esika Elimo ya Mokonzi efandi, bondeko ebotami kati na bato, bituluku, bikolo bya mokili mpe bango banso bazali koloba lokotà to monoko moko ya bolingo oyo ezali kosangisa mpe koyokanisa bato ya ndenge na ndenge. Elobaki Pàpa.

Na eyenga eye ya Nkitela ya Elimo Santu, Pàpa asengi na kobelela Elimo Santu afungola bikuke binso bisila kokangama. Tozali na mposa ya kokundola Nzambe lisusu lokola Tata oyo alingaka biso ; kotonga Eklezia epai wapi moto na moto akoki komiyoka ‘te azali na ndako na ye ; mpe kokolisa mokili ya bondeko, oyo kimya ezali kati na bato banso ; esukisaki Nganga – Mokonzi Monene.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

24 sánzá ya mítáno 2026, 17:46