Angélus: Kristu amonisi bokabi bwa Nzambe, lokola moloni ya Liloba
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na mateya ma yé, Leon XIV alimboli boni boni Molóni wa Nzambe abwaki mbóto mwa ye bipayi binso, akanisa soki moke te. Apesi na moto nyonso Ngrasya, aponi bilongi te mpe akaniseli basusu mabé te. Aloni na «mabele ya makasi, oyo ezalaka mpasi mpo na koyoka, mabele oyo wapi, mbala mosusu ezalaka na makambo mingi, lokola mabele ya mabanga, to ya nzubé». Tata Mosantu alobeli mingi likambo la bonsomi ya bato mpe lolenge malamu ya koyamba yango. Engebene na yé, esengeli kozwa misisa na Liloba lya Nzambe, oyo ezali “mbótó Tata azali kokóba kolóna o mokili, na ntina te, mpó ya liwa lya yé, ekóba kobota mbuma”. Nzokande, soki molóni-bilanga yango azwi libakù lya mabele malamu mpo na kolóna mbuma, ezali mpenza likambo mya elikya. Mpamba te, ezali na nguya ya kobongola nyonso mpe ya kosala ‘te Liloba lya Nzambe ekola mpe ezwa to ekóma na bomoi. Lisusu, Tata Mosantu amonisi ‘te kokóba kolóna ezali komonisa ‘te Tata azali na elikya na “bokasi ya bolingo bwa ye, oyo ezali na nguya koleka bolémbù bwa biso, tala na (2 Ko. 12, 9-10)”.
Ngrasya ya Nzambe ebongolaka mabelé ya mabanga na oyo ya malamu
Leon ya XIV alobeli mateya ma Santu Jean Chrysostome, oyo alobelaki “mbótó” ya Liloba lya Nzambe. Bonsomi bwa moto oyo ebongwani na ngrasya mpe na bokabi bwa Nzambe, “epesaka nzela na bisikà bya mabanga ekoma to ebongwana mabele malamu ekobotisaka mbuma; nzela ezala lisusu oyo enyatami na bato banso bazali koleka te, kasi ekóma mabele malamu; nzube elimwa mpe mbótó ekweya na esika ya libateli monene”. Na yango, “Nzambe oyo ayebaka malamu mabele mya mitema mya biso, koleka biso moko, andimelaka biso nayino, na oyo biso tozali mpe oyo tokoki kokóma, mokolo sima na mokolo, soki tomitiki na maboko ma yé, na boyambi”. Ekobaki Pàpa na koloba.
Ngrasya ya Nzambe mpe bonsomi ya bato ezali liziba lya bambuma ya molimo
Mpo na Pápa, bokutani kati na bokabi mpe kondima ‘te mbótó eyambami ebimisi libombami ya boyokani kati na ngrasya ya Nzambe mpe bonsomi bwa bato oyo ezali kopalangana mpe kobota mbuma ya Elimo Santu oyo, ezali: “Bolingo, esengo, kimya, motema molai, lobokó, boboto, bolamu, kondima, komipekisa” (Ga 5,22). Mbuma oyo mokili mwa biso esengeli “etonda na yango mpe ebongwana!” Yango wana esengeli kosala makasi mpo na komona Liloba oyo ekomaki nzoto ya Kristu; Na kozwáká ntango ya koyoka, ya kotánga mpe ya komanyola Liloba lya Nzambe, kolónáká, longola kopema mpe bisengo ya malamu, ntango ya kimya mpe mabondeli o bozindo. Na nsuka, tokozongela mosala na biso ya kala, na nzoto mpe na molimo mwa sika, na bibundeli binso tozali na yango mpo na kosakola Nsango Elamu, mpo na mosala mwa Bokonzi bwa Nzambe. Kobelela bolobeli bwa Maria, Mokonzi Mwasi ya bantómà mpe Monzoto mwa Nsango Élamu.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
