Luka

Papa Léon XIV Papa Léon XIV  (ANSA)

Angélus: «boyambi epesameli biso mbala mókó mpo ya sékó te»

Papá alimbolaki nsango-elámu ya mokolo ya eyenga ya 23 ya sánzá ya mwambi yambo ya koloba losámbo y'Angélus. Motuná «Mpe binó, bolobi nini? Mpo ya binó, ngaí nazali nani?» (Mt 16, 15) ekotunáma mikolo nionso mpo ya bisó, elimbolaki Léon XIV, na bolendisi ya komona lisusu ntángo insó elongi ya Kristu mpe Nsango-Ndamu na ye, kokolisa liloba na ye mpe kokómisa sika maponi ya bomoí na bisó. Na nionso esengeli koleka lisénginyá ya kosála na boyambi momeseno mókó ya pámba.

JR Bompolonga - Kinshasa

Libosó ya bandimi basangani na esika Sántu-Petelo, Léon XIV azongelaki maloba ya Kristu na nsango-elámu ya Mateo (Mt 16, 13-20) 'te molúlú ya losámbo na misa ebongisi mpo ya eyenga ya 21 na ntángo ya momeseno. Maloba miye akobelela bayékoli na ye na bomoto na ye. «Lisoló ya nsango-elámu ekolakisa bisó esika nini motuná ená ezali na ntina mpo ya nzebi ya moyékoli, ekobaki lisusu Papá, mpo Yezu alingaki te komona yangó lokolá likambo eye esengeli kaka kozala bongo 'te bayébaki ye ya sóló mpe 'te basimbaki mobombano ya Bokónzi ya Nzámbe».

Maloba waná ya Kristu bizali bongo «nzelá yokó ya ntina mpo ya bayékoli ya bileko binsó, mpo ya mókó mókó káti na bisó», elakisaki ye, mpo «boyambi epesameli biso mbala mókó mpo ya sékó te». Nzokándé, «tosengeli ntángo insó komona lisusu elongi ya Kristu mpe Nsango-Ndamu na ye, kokolisa liloba na ye mpe kokómisa sika maponi ya bomoí na bisó zambi bizala na boyókani na eye tozali koloba, na boleki lisénginyá ya koyéba nionso mpe ya kosála boyambi momeseno mókó ya pámba te».

Komikangama na bindimeli na bisó mpe na babosóló na bisó te

Lisangá ya mituná waná esálemi epai ya bapostolu ezali kaka ya kobongama mpo ya mókó mókó káti na bisó, mpe eye koyébisa bisó lisusu 'te motéma ya boyambi ezali bokási bokó ya kokómisa yangó sika ntángo insó, na bolobi lisusu bokangemi na ye na Kristu oyo azali kokotisa na bolingo ya Tatá mpe ekobongola bomoí na bisó. «Na bomoí na bisó ya mokolo na mokolo, tokoki kotálatála sóki Mokónzi Yézu azali mpo ya bisó kaka moto mókó monéne ya lisapo te oyo alobaki mpe asálaki makambo ya ntina, to sóki azali Kristu ya Nzámbe», ekobaki Léon XIV.

Alendisami na likanisi liná, Papá akébisaki bongo, na bobengi «ya komikangama te na babondimi na bisó mpe na babosóló ya biyamba na bisó, mpo kozala ya kofúngwama na boyókani bokó ya sóló na Kristu». «Na likambo ya boyambi ya bokristu, tosepelaka ntángo mosusu na "eye toyokaki kolobama", na bisika ya bisó bansó, na eye epesamaki na bisó, ntángo mosusu kútu na makanisi ya malámu», ekobaki ye.

Nzokándé, elimbolaki lisusu episkopo ya Roma, «Yezu akobenga bisó na eyano yokó ya yo, ya koyéba ye ya penepene, ya komitika kobongwama na bolingi na Ye, na bokútani bokó kaka ya sika eye ekoki kotuná bisó ya kozua babalabala biyébani te mpe ya kosála maponi bikeseni na baye tokanisaki». Komituná "nani ezali Mokónzi ya sóló" ezali bôngó bokási bokó ya makási ya kosála. Bokási bokó «eye ezali na ntina mpo ya etamboli na bisó mókó koleka mpo eye ya Eklezia mpe mpo ya maponi ya mokengeli, esika wápi tokokanisa ntángo mosusu 'te ekoki kaka ya kokoba lokolá tosálaka yangó kaka».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya mwambe 2026, 11:34