Luka

Angélus: Léon XIV abengi Eklezia ya komitika kokamwisama na mosála ya Nzámbe

Sima ya mokolo ya molúlú ya lokúmu ya Ntombwa ya Ngondo Maria, Papá akambaki, mokolo ya eyenga 16 ya sánzá ya mwambi, losámbo y'Angélus úto esika ya Bonsómi na Castel Gandolfo. Na bomanyoli ya Nsango-Ndamu ya mwási ya Cana oyo akosámbela mpo ya mwána na ye ya mwási, Tatá-Esántu abéngaki Eklezia ya komitika kokamwisama na mosála ya Nzámbe, ya kokatisa bandelo mpe ya kondima 'te «mesa ya Nzámbe ebongisama mpo ya bansó».

JR Bompolonga - Kinshasa

 

Na litéya na ye ya mokolo ya eyenga eye ya 16 ya sánzá ya mwambi, Papá azongelaki Nsango-Ndamu ya mokolo eye ekolakisa mwási ya Cana lokolá elongi yokó ya boyambi mpe ya botiyi motéma. Mopaya epái ya bato ya Israël, akoluka na mpiko kokútana na Yézu mpo ya kosenga boboto mpe libiki ya mwána na ye ya mwási atungisami. Mpo na Léon XIV, mwási ená «atiyi motéma na Yézu, epái ya nani akomona Masiya, mokitani ya Dawidi».

Lisoló ya Nsango-Ndamu elakisi ya sóló mikakatano ebelé biye akokútana na yangó. Ya yambo, bayékoli bakomona lokolá motungisi, mpe na sima, Yézu ye-meí akomonana lokolá koboya bosenga na ye. Kasi ezaleli ená ememi na súka na mobombano ya boyambi ya mwási, epái ya nani Yézu alobi: «Mwási, boyambi na yo ezali monéne, nionso esálema mpo na yo ndéngé olingi!».

Pàpa Leon XIV na tango ya Angelus na Castel Gandolfo
Pàpa Leon XIV na tango ya Angelus na Castel Gandolfo   (@VATICAN MEDIA)

Koyekola komitika kokamwisama na mosála ya Nzámbe

Úta eténi eye, Papá Léon XIV alobi ezaleli ya Yézu eye akokisi etindá na ye «na bomitiki kosimbama na eye akomona mpe akoyóka». Ezaleli yokó eye, mpo na ye, ekoki lokolá kongengisa etindá ya Eklezia leló.

"Leló lisusu, Eklezia ekoki komitika kokamwisama na mosála ya Nzámbe mpe koyébisa boboto ya Kristu koleka bandelo bisálema kála. Etindá na ye elekaki libosó na ngolu ya Nzámbe oyo akokela na sekele ya mitéma".

Tatá-Esántu akobyanga bongo bakristu kozala na bokébi na ekela ya Nzámbe na babokútani, na káti waná biye bikoya kobúlunginya bamwángo na bangó. «Na bokútani bokó bokó, atá biye bikobúlunginya bamwángo na bisó, esengeli kotiya litoyi, kofúngola miso mpe motéma mpo ya koyoka eye Nzámbe alingi kolobela bisó», elobi ye.

Papá abendi lokolá na mwási ya Cana litéya lyokó ya «bomikitisi mpe bozali na molendé». Boyambi na ye, mpo na ye, libiki ya mokili mobimba: «mesa ya Nzámbe ebongisami mpo ya bansó mpe bapumbulu bitikali mpo ya moto te». Bondimi ená ya makási ememi Mokitani ya Petelo kotelemela bizaleli biye bikobébisa lokúmu ya moto. « Na mwinda ya boyambi ená, bozangi bokokani, botiyi pembeni mpe babopekisi biye bikonyata lokúmu ya bána mibáli mpe bási ebelé ya Nzámbe bikoki kondimama te», elobi ye.

Eklezia na mokili mókó ekoluka boboto

Na mokili mókó ezua elembo ya babobendani mpe ya babokabwani, Léon XIV alobi lisusu mbélá ya Eklezia: kozala bozali bokó ya boboto. «Tozali Eklezia ya Yézu-Kristu na mokili mókó etungisami, ekoluka kimia», elobi ye, na bosengi bolobeli ya Ngondo Maria. Papá atángi bongo encyclique na ye Magnifica humanitas, na bolobi Magnificat lokolá «nzembo ya baye bakomona úto leló bosóló na botáli ya Nzámbe mpe baye, mpo ya likambo waná, bakobwaka elikya te mpe bakosála na bolingo».

Photo Embed: Pàpa Leon XIV na tango ya Angelus na Castel Gandolfo
Photo Embed: Pàpa Leon XIV na tango ya Angelus na Castel Gandolfo   (@VATICAN MEDIA)

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

16 sánzá ya mwambe 2026, 16:16