Luka

Papa na cathédrale ya Rimini Papa na cathédrale ya Rimini  (ANSA)

Bopenepene ya Papá epái ya babolá mpe bakoni ya Rimini

Na cathédrale ya Rimini, Léon XIV akútanaki na etuluku yokó ya bato ya bokono, na ezaleli ya elémé mpe ya bozangi, basúngami na Caritas. Alendisaki bangó na «kotambola elongo» o káti ya Eklezia, na bozali na makási na bapaloise, o ntéi ya masangá, na bisika ya boyambi mpe ya mosála esika wápi toyóki «'te Tatá na bisó azali monéne na bolingo na ye mpe 'te tozali bána na ye, mpe bandeko bisó bisó.

Vatican News

Papá Léon XIV amemi ekopi ya Yézu, na nzelá na ye tosengeli «tomitika mpo ya kobika», na etuluku ya bato babolá, ya bokono to na ezaleli ya elémé ya etuka ya Rimini. Sima ya lisikulu na ye na baye bazalaki na «Mitingi mpo ya bolingi káti ya bato», Papá wa Roma alingaki kobonza bokútani na ye ya mibalé ya mobémbo na ye ya bontómá na dioceze ya Rimini na eténi ená ya pási ya bato ya Nzámbe, eyambami mpe esúngami mokolo na mokolo na Caritas mpe masangá misusu ya lisálisi.

Kotambola elongo

Bokútani esálemaki na cathédrale, epái wápi Léon XIV akendeki na papamobile, elongo na babongangi mpe banzembo ya bato ebelé sima ya basinga. «Tála cathédrale ya Rimini, mpe áwa, bozali epái na binó!», elobaki Léon XIV, na bozui liloba sima ya bopesi mbote na bato bazalaki waná mpe batálaki eleko yokó ya losámbo na chapelle ya Saint-Sacrement. «Iyo, mpo Mokónzi Yézu, ntángo azalaki kokútana na bakoni, bibosono to babolá, azalaka koyamba bangó mpe kotia bangó na káti, mpo ya kobikisa bangó, mpo ya kopesa bangó lisusu bomoí bokó elongobami na lokúmu na bangó. Azalaki kolakisa bongo bilembo nionso ya bolingo ya Nzámbe, ya mawa ndelo te. Mpe na sima bato waná, babiki mpe balendisami na Yézu, bazalaki kolanda ye mpe bakómaki binama ya lisangá ya bayékoli».

«Yangó ndé tosengeli kosála lokolá», elobaki Papá. «Tomitika kobikisama na Yézu, tomitika kolimbisana, tobongwana, mpe tokotambola elongo na Eklezia na ye, lingómbá akelaki mpo ya komemela na bansó Nsango-Ndamu ya elonga na ye na lisúmu mpe liwa», ekobaki ye.

Kozala na bomoí ya Eklezia

 Na bandeko ya mibáli mpe ya bási waná, Tatá-Esántu abimisaki matondo na ye mpo ndéngé «bayanolaki na mbélá»; alendisaki bangó ya «kolanda kaka Mokónzi na bozali makási na bomoí ya Eklezia, na bapaloise, na masangá, na bisika ya boyambi mpe ya mosála, epái wápi tokoyekola mpe esika wápi tokoyeba 'te Tatá na bisó azali monéne na bolingo mpe 'te tozali bána na ye mpe bandeko bisó na bisó». Na súka ya bokútáni, libosó ya episkopo ya Rimini, Mgr Nicolò Anselmi, «Tatá wa Bisó» esakolamaki na lisangá.

Kosúnga etindá ya Papá wa Roma

Na lisikulu na ye ya boyeí elámu elobamaki na Papá na cathédrale, episkopo alobaki lisusu bilongi biye bikosálisa na molimo dioceze: bilengé mibalé bakómaki bamwaesengo kála te, Sandra Sabattini mpe Alberto Marvelli, na litatoli ya mosáli ya Nzámbe sángó Oreste Benzi, ye awuta Rimini mpe mokeli ya lingómbá «Papá Yoane XXIII». Bizali bangó ndé bakopesa likanisi na bandeko ebelé ya mibáli mpe bási bazali áwa, «baye bakoleka eleko yokó ya pási ya bomoí na bangó », ya bokono na biloko bakangema, na boleki na bokangemi. «Yézu akosenga bangó ya kobátela bato na ye», elobaki episkopo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya mwambe 2026, 11:26