Léon XIV: bikela ya sóló ya mike bikoki kokanga bitumba ya minéne
JR Bompolonga – Kinshasa
Na «eleko eye mpenza ya matata» eye mokili ekoleka - kaka likoló ya «bitumba» te mpe ya «mikakatano káti ya bikóló» te, kasi lokolá likoló ya biloba-loba ya mabé biye bikolakisa likambo ya politiki na ekóló yokó yokó -, tokoki koyékola epái ya Yézu kolanda nzelá ya bolámu mpe ya bolingo, makambo ya mitúya mibalé biye bizali na mpifo ya «kobotola mondoki». Waná ezali ntina ya lisikulu elobamaki n'anglais na Léon XIV epái ya mwá baepiskopo ya Eklezia ya Luther ya Norvège, bayambamaki na likita na ntongo, 26 ya sánzá ya mwambi, na ndáko ya makita ya Aula Paolo IV.
Koyékola «nzelá yokó esusu»
Episkopo ya Roma alobi 'te eyano ekoki kozala kaka kolakisa «boyini» epái ya baye mindondo mizali kobima. Ezaleli yokó esálisami na «ezaleli ya bomoto na bisó ebéba». Esengeli nzokándé bokási bokó ya koyókana mpo ya «koluka banzelá ya sóló ya bozongisi boyókani mpe bondeko». Mokúmbá mókó eye Yézu akolembisa, na bolakisi bisó «nzelá yokó esusu», na bobimisi 'te «bolámu mpe bolingo bizali na mpifo ya kobotola mondoki». Atá botáli ya baepiskopo ya Eklezia ya Luther ya Norvège ekómi, engebene na Papá, ndakisa yokó ya litambe lyokó ya bomikitisi kasi ya ntina mpo ya bomoko.
Kozala na mosála ya boboto mpe ya bosémbo, na lisangá
Episkopo ya Roma akómisaki ya ye losámbo ya bomoko eye Kristu alobi na Tatá na Nsango-Ndamu ya sántu Yoane, mpo 'te bayékoli «bazala malámu na bomoko mpe 'te mokili eyéba otindáki ngaí mpe 'te olingaki bangó lokolá olingaki ngaí». Na waná, Léon XIV abimisi mpósá 'te «batisimo ya banso» mpe «etindá ekabolami na mokili» bizala makoki ya yambo mpo ya «kokola elongo na mosála na bisó mpo ya botomboli ya boboto mpe ya bosémbo».
Asengi na sima kolanda ndakisa ya sántu Olav, oyo abikaka káti ya 995 mpe 1030, mokónzi ya Norvège, martyro mpe mosántu mokónzi ya ekóló, mpe ya sántu ya mwási Sunniva, martyro mpe mosántu mokónzi ya Norvège ya westi. Bomoí na bangó «ebonzama na Nzámbe mpe na moningá, esálisaki ya kosangisa bato mpe etatoli mpo ya libela bokási ya kobongola bolingo», elobi Papá. Alendisi kosenga «bobenisi ya Nzámbe», mpo «asálisa bisó ya kobika ndéngé kaka ya sóló lokolá bandeko babáli mpe ya bási mpe, bongo, kopesa litatoli lyokó ya lisangá ya Mobikisi na bisó».
«Na Mókó, tokosála kaka mókó»
Na lisikulu na ye ya boyeí elámu epái ya Papá wa Roma, Olav Fykse Tveit, episkopo mokónzi ya Eklezia ya Norvège, andimaki asepelaki mingi na liponami ya liloba-lotómo ya mosála na ye ya Papá: «Opesaki bisó likanisi makási na boponi lokolá liloba-lotómo: In Illo uno unum («Na Mókó, tokosála kaka mókó»). Yangó ekokundola losámbo ya Kristu ye-meí: Ut unum sint («Bazala bansó mókó»)». Abakisaki lisusu 'te «bomoko ezali likabo lyokó ya Nzámbe», mpe ezali «ya kokokisa elongo mosála na bisó mpe tosála elongo litatoli na bisó»
«O eleko ya botáli boye na Roma, tobiangemi na Lisangá ya Sant’Egidio ya koyóka mpe kososola na bozindo boni boni tokoki kosálisa bilengé ya koluka mpe kozua esika na bangó na Eklezia, esúkisaki mokónzi ya Eklezia ya Norvège. Mpe boni boni, na lisálisi na yangó, bakoki kokola na boyambi mpo ya kosálela Nzámbe mpe mokili, lokolá liloba ya boyambi ya bokristu».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
