Libosó ya virus Ebola, Léon XIV asengi botelemi ya lisangá ya mokili
Vatican News
Sima ya losámbo y'Angelus, Papá abwakaki mbélá mókó epái ya Congo-Kinshasa, ebetami na epidémi yokó ya Ebola eye ekokoba kaka, mingi mpenza na Monyele ya ekóló. «Na nsámbo na ngaí, nakokanisa mingimingi Congo-Kinshasa, mpenza likoló ya bopanzani ya epidémi ya Ebola eye, na mawa, ekosála bato mingi ya makámá», elobaki Tatá-Esántu, yambo ya kobwaka mbélá mókó na lisangá ya mokili.
«Nakolendisa lisangá ya mokili ya koyanola, na bosangisi lokolá masangá ya ekóló na makási ya bobáteli, mpo ya kobikisa bomoí ya bato ebelé», elobaki Léon XIV. Liloba lyokó esangani na bambélá ya ONU ya bampóso bileki, na bobángi bopanzani bokó ya epidémi mpe na bolendisi lisangá ya mokili ya kokómisa makási eyano ya bokólóngóno ya nzóto.
Na 21 ya sánzá ya mwambi, mokambi monéne ya Ebola mpo ya ONU alimbolaki 'te epidémi ebomaki bato koleka 2500 úto bobimi na yangó na engúmba ya Ituri o ebándeli ya mobú. Abángaki lokolá «bopanzani ya koleka» ya virus, na bosemboli 'te ndambo ya bawéi ekómaki «na mikolo 20 ya súka», elingi koloba na sánzá ya mwambi.
Nsámbo mpo Republiki y'Afrika ya Káti mpe Itali
O eleko ya bambélá waná, Papá abalusaki lokolá miso na ye epái ya Republiki y'Afrika ya Káti esika wápi bokweí ya esika ya bobimisi wolo na moyibi na Zamboï esali na mpóso eye bato ebelé ya makámá. «Nzámbe ayamba baye babungisaki bomoí mpe asálisa makási ekoluka kolaka bokengi mpe botosi ya mobéko na bisika ya bobimisi mabángá ya ntalo», elingaki ye.
Léon XIV akundolaki lisusu na súka mibú zómi ya boningani ya mabelé eye ebetaka ntéi ya Itali, káti ya Latium, Ombrie mpe Marches, na 24 ya sánzá ya mwambi 2016. Boningani ebomaka bato 237, mingi mpenza na etuka y'Amatrice. «Nakosámbela mpo ya bawéi mpe mabótá na bangó, na lokolá mpo ya masangá bibetamaki», elobaki Papá, na bolingi «'te boyambi mpe bosálisani bikoba kosálisa mosála ya botóngi».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
