Luka

Léon XIV na likita lya banso Léon XIV na likita lya banso   (ANSA)

Likita lya bansó: nzembo ya molúlú ya losámbo na misa, elembo ya lisangá ya Eklezia

Úta basilique Sántu-Petelo, Papá asakolaki litéya na ye ya sambo etáli Sacrosanctum Concilium, Mobéko-likonzi ya Concile Vatican II na likambo ya Molúlú ya losámbo na misa. Na molúlú, elobaki Léon XIV, koyémba mpe kobeta elingi koloba kosámbela, na bobongisi motéma na yo na eye ya bandeko babáli mpe bási mpe na Nzámbe, na bozali na bomoí na mobombano ekosálema».

JR Bompolonga – Kinshasa

«Momeseno ya miziki ya Eklezia ya mokili mobimba ezali eloko yokó ebombaka mosolo ya motúya ya ntina makási eye ekoleka bantoki bisusu, na likambo mingimingi 'te, nzembo esántu ekangami na maloba, ezali na káti ya ntina to na káti ya molúlú ya losámbo na misa ya ntina», elobi mokabo ya motóbá ya Mobéko-likonzi ya Sacrosanctum Concilium ya Concile Vatican II, ebonzama na miziki esántu. Liloba ená «endimisami mpe ekolisi» litéya epesama kála na sántu Pie X na Motu Proprio Inter sollicitudines na ye ya 1903. «Miziki, ya sóló, ezali na káti ya ekela ya molúlú ya losámbo na misa mpe ezali eloko yokó ya pámba ya kobongisa misa te», etálisaki lisusu Mokitani ya Petelo.

“«Na molúlú ya losámbo na misa, koyémba mpe kobeta miziki elingi koloba kosámbela, kopesa motéma na yo na eye ya bandeko babáli mpe bási mpe na Nzámbe, na bozali na makási na mobombano ekosálema».”

«Cantare amantis est»: nzembo, elembo ya bolingo

Mpo ya Léon XIV, miziki, mpenza, ekobimisa «lomeko ya bolingo ya losámbo». Sántu Augustin, elobaki ye, alobi yangó na liloba eye: «Cantare amantis est», elingi koloba «nzembo ezali elembo ya bolingo». Lomeko liná ya nzembo ezali ya ntina koleka, mpo «ekosálisa kofúngola motéma na ekela ya Nzámbe na ngolu mpe komitika kobongolama na ye», ekobaki ye. Nzembo, lisusu, ebetaki nsete Papá wa Roma, «ekopesa nzelá na lisangá». Na boyóki kitoko ya mingongo, «ekosálisa na bomoko ya milimo, na bozali likoló ya babokeseni káti ya bato mpe bosangisi bandimi bansó na nkembo ya Nzámbe». Waná, «ekómi bomimonisi bokó ya Eklezia, bobimi bokó ekomonana ya lisangá eye ezali na káti ya loléngé na ye kaka».

Miziki mókó ebongisama na ekela ya molúlú ya losámbo na misa

Bongo, ndimbola ya mozindo ya boyékoli mambi ma Nzambe ya nzembo esántu, eteni na káti ya ekela ya molúlú ya losámbo na misa, ebimisi masengami misusu, elobaki episkopo ya Roma. Koleka makambo ya sika to mayóki ya ndéngé mosusu ya bakomi, miziki esengeli koyanola na eye ebongi koleka malámu na eleko ya misa. «Motindo ya miziki, mpenza na ndéngé ya eyembeli, etálisaki ye, esengeli kozala mbala mókó ya lokúmu mpe ya pété, ya loléngé lyokó linéne ya miziki mpe pété na kobeta, mingimingi ntángo ebengami ya koyembama na lisangá nionso».

Yangó waná Concile esengi 'te «mikánda bizala bibongami, ya mozindo mpe, mbala mókó, ya bososoli na pété». Bisengeli bizua likanisi mpenza mpenza ya Nkoma Esántu, babuku ya molúlú ya losámbo na misa mpe ya Momeseno ya molimo ya Eklezia. Bosenga ená ekolanda kútu mobéko ya kála, «Lex orandi lex credendi»: mobéko ya losámbo ezali lokolá mobéko ya boyambi. Ezali bôngó na ntina ya kokengela na ndéngé 'te miziki mpe mikánda ya molúlú ya losámbo na misa bikangama mpe bilendisama na bokási eye losámbo ya Eklezia ekoleísa mpe ekobimisa boyambi na yo.

Bozali ya makási ya bandimi

Tatá-Esántu ayébisaki lokolá 'te Sacrosanctum Concilium epesi esika yokó enéne na bozali makási ya bandimi. Yangó esengeli kososolama «úto boyébi bonéne koleka ya mobombano eye ekosálema mpe ya boyókani na bomoí ya mokolo na mokolo», lokolá Benoît XVI alobi yangó lisusu na Sacramentum Caritatis. Ezali kolakisa lokolá, engebene na lilendisi waná kaka, «molimo mókó ya mbongwana ya eleko insó eye esengeli kolakisa bomoí ya bandimi bansó».

Na loléngé liná, mosála ya miziki esántu esembolami polélé na Mobéko-likonzi ya Concile: «Bakopesa nzelá na bobeti mabóko ya bato, biyano, loyembo ya banzembo, banzembo ya boyanoli, banzembo ya masanzoli» mpe «kimia yokó esántu». Sángó yokó yokó to laíki, ebimisaki Papá, abengami ya kokokisa «kaka mpe nionso eye ezali ya ye na libongi ya eloko yangó mpe mibéko ya molúlú ya losámbo na misa», «na bokátikáti bokó ya malámu káti ya baministeli bikeseni, bozui maloba ya ndéngé na ndéngé mpe bileko ya kimia».

Nzembo grégorien mpe bandéngé misusu ya miziki esántu

Tatá-Esántu asakolaki epái esusu 'te Concile apesi ntina yokó enéne na nzembo grégorien, na botiyi pembeni te misa ya bandéngé bisusu ya miziki esántu. Na bobeti nsete na likambo 'te bokébi bokó ya ndéngé na yangó epesama na orgue, eye Sacrosanctum Concilium ebonzi motángo 120. Bosáleli ya bisalelo bisusu endingisami ntángo bikoyanola na babosenga ya molúlú ya losámbo na misa: «Na ndéngé bizali to bikoki kokóma bibongami na bosáleli esántu, biyókana na lokúmu ya tempelo mpe bipesa nzelá ya sóló na botóngi ya bandimi».

Bopesi nzóto na miziki esántu

Mókó ya makambo-makonzi ya ntalo na bobongisi ya Concile ezali eye ya bopesi nzóto, mpenza na likambo ya miziki esántu. Mimeseno ya miziki ya babonkoko bikeseni bisengeli bizuama na ntina makási, pámba 'te bizali na káti ya bomoí ya eyamba mpe ya bozali ya bato. Mpo na waná, Concile esengi mpenza ya kotangisa bansó «na liyóki na bangó ya eyamba» mpe na ndéngé ekokoka: «Kotombola miziki ya bonkoko ya bato waná, ezala na kelasi to na bikela bisántu».

Schola cantorum, esalelo yokó ya mokengeli

Na ndéngé ya molúlú ya losámbo na misa, elimbolaki Léon XIV, mosála mókó ya loléngé na yangó endimami na schola cantorum, elakisami lokolá esalelo ya sóló ya mokengeli. Liyébísi Musicam sacram ekopesa ye mpenza etindá: «Kolaka bobeti ya sémba ya biténi biye bizali ya ye, bandéngé bikeseni ya loyembo, mpe kosálisa bozali ya makási ya bandimi na loyembo».

Mosáli-nzembo na mosála ya molúlú ya losámbo na misa

Etindá ená etáli lokolá mosáli-nzembo ya miziki esántu. Ye oyo abengami ya koyéba mpe kobátela libulá ya miziki ya Eklezia, na bomitiki kozua likanisi mpo ya kokoma banzembo ya sika na mosála ya molúlú ya losámbo na misa. Bokeli ená esengeli kotosa mayóki ya leló mpe mimeseno ya bonkoko bikeseni. Sántu Yoane-Polo II azalaki koloba lisusu mokúmbá waná na Mokánda akomaka na lobóko na ye etáli miziki esántu ya 22 ya sánzá ya zómi na mókó 2003. Azalaki kobenga mpenza: «Kopétola losámbo na bambéba ya loléngé, ya mitindo ya bobimisi ya mabé, miziki mpe mikánda ya ntina te, bibongami malámu te na bonéne ya ekela eye ekokumisama» zambi ya «kolaka lokúmu mpe kitoko ya mitindo ya miziki ya molúlú ya losámbo na misa».

Kotangisa balánga nzembo mpe bayémbi

Mpo na makambo nionso waná, ekobaki Papá wa Roma, Batatá ya Concile basengi kotombola «botéi mpe bosáleli miziki esántu» «na balikindo, banoviciat ya basáli ya Nzámbe ya babáli mpe ya bási, na bandáko na bangó ya boyékoli, na lokolá na misála mpe bitéyelo katoliko misusu». Concile ekosenga lokolá ya kokengela 'te balánga nzembo mpe bayémbi bazua litéya ya makási ya molúlú ya losámbo na misa.

Kokóma lisangá ya bayémbi na bomoko

Likanisi ya miziki esántu elandi na súka momeseno ya Batatá ya Eklezia, balingaki loyembo ya molúlú ya losámbo na «limemía linéne» lokolá «elembo ya lisangá ya Eklezia». «Tika 'te mókó mókó na binó lokolá, bokóma lisangá lyokó ya bayémbi, zambi, na boyókani na binó, na bozui mongongo ya Nzámbe na bomoko, boyemba na mongongo mókó na Yézu-Kristu epái ya Tatá, mpo ayóka binó mpe ayéba binó, na misála na binó ya malámu, lokolá binama ya Mwána na ye», elobaki Papá wa Roma, na bozongeli lisusu mpo ya ye «maloba kitoko» ya mosántu Ignace y'Antiokia.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

19 sánzá ya mwambe 2026, 15:13