Papá abimisi bopenepene na ye epái ya bato ya makámá ya boningani ya mabelé na Indonésie
Vatican News
Papá ayókaki na «mawa mókó ya makási» nsango ya «babopanzi» bisálemi na boningani ya mabelé ya bokási 7,7 eye ebetaki mokolo ya mpóso na ntongo 15 ya sánzá ya mwambi engúmba ya Nusa Tenggara ya monyele, na Indonésie. Na télégramme yokó ekomami n'anglais mpe etiami mokoloto na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, etindami na Mgr Paulus Budi Kleden, SVD, episkopo ya Ende, Papá alaki «bosálisani na ye ya molimo mpe bopenepene na ye na baye bansó bakoyóka pási na likámá liná, mingi mpenza bato mingi baye bakimi mpe bazoki».
Papá wa Roma alendisi epái esusu bakambi ya Eklezia mpe ya bacivil na mosála na bangó ya «kosálisa bato» mpe akosámbela «mpo ya bato bamipesi na lombango na misála ya bosúngi mpe ya botóngi». Apesi na súka na bawéi bansó «mawa ya bobáteli ya Nzámbe ya nguya nionso».
Mbéba ya bato mpe ya biloko ya ntina
Boningani bokó ya yambo ya makási ya bokási bokó ya 7,7 ebetaki mokolo ya mpóso eleki esangá ya Flores, elandami na baboningani misusu ebelé na mokolo ená. Mwá bangonga sima, boningani bokó ya mabelé ya 6,9 ezuaki esanga ya Sumatra. Na botiyi pembeni bato ya makámá ya bato, boningani ya mabelé ememaki bobuki ya bandáko ya kovanda mpe ya misála. Engebene na Mosála ya ekóló ya botáli makambo ya mabé, koleka bandáko 900 bizongi mabángá, nzokándé 450 misusu bibébaki. Na moke bandáko ya misála 167, na káti waná bitéyelo, balopitalo mpe bandáko-Nzámbe, bizali lisusu ya kokota te. Bato mingi bakimi babombani na bisika ya ntángo moke. Mokolo ya yambo na ntongo, motángo ya ntángo moke ya boningani ya mabelé ezalaki ya bawéi 53, bato bazoki 135 mpe bato bazangi esika ya kovanda 13 000.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye
